3 Ezalaki mpo na kanda makasi ya Yawe nde makambo oyo nyonso esalemelaki Yelusalemi mpe Yuda, kino Yawe kobengana bango mosika na Ye. Nzokande, Sedesiasi atombokelaki mokonzi ya Babiloni.
Tika ete Yawe, Nzambe na yo, apambolama ; Ye oyo asepelaki na yo mpe atiaki yo na kiti ya bokonzi ya Isalaele ! Ezali mpo ete Nzambe na yo alingaka Isalaele mpo na libela nde atiaki yo lokola mokonzi mpo ete osala na bosolo mpe na bosembo. »
kino tango Yawe abenganaki bango mosika na Ye, ndenge ayebisaki bango na nzela ya basali na Ye nyonso, basakoli. Boye, bamemaki bana ya Isalaele na bowumbu, mosika ya mokili na bango, na Asiri kino lelo.
Ezalaki mpo na kanda makasi ya Yawe nde makambo oyo nyonso esalemelaki Yelusalemi mpe Yuda, kino Yawe kobengana bango mosika ya elongi na Ye. Nzokande, Sedesiasi atombokelaki mokonzi ya Babiloni.
Lisusu, atombokelaki mokonzi Nabukodonozori oyo alapisaki ye ndayi na Kombo ya Nzambe. Na esika ete azonga epai na Yawe, Nzambe ya Isalaele, akomaki moto makasi mpe akomisaki motema na ye libanga.
mpo ete baluka kati na babuku ya bakonzi oyo bazalaki liboso na yo mpo na kososola malamu. Okomona solo kati na babuku yango ete engumba oyo ezali engumba ya batomboki, etungisaka bakonzi mpe bituka. Mpe lisusu, wuta kala, ezali esika ya batomboki. Yango wana engumba oyo ebebisamaki.
Nakokaba bato ya Ejipito na maboko ya bakonzi ya mitema mabe, mpe mokonzi moko ya kanda makasi akokonza bango, » elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Yawe alobaki na ngai : « Ata soki Moyize mpe Samuele batelemi liboso na Ngai mpo na koloba na tina na bato oyo, nakotikala koyokela bato oyo mawa te. Bengana bato oyo liboso na ngai ! Tika ete bakende mosika na Ngai !