Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 52:14 - Mokanda na Bomoi

14 Mampinga nyonso ya Babiloni, oyo ezalaki na se ya bokonzi ya mokonzi ya bakengeli ya mokonzi babukaki bamir oyo ezingelaki Yelusalemi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 52:14
6 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mampinga nyonso ya Babiloni, oyo ezalaki na se ya bokonzi ya mokonzi ya bakengeli ya mokonzi babukaki bamir oyo ezingelaki Yelusalemi.


Balobaki na ngai : « Bayuda oyo babikaki mpe batikalaki wuta na bowumbu bazali kovanda kati na etuka ya Yuda mpe bazali na pasi mingi mpe na soni makasi ; mir ya Yelusalemi etondi na madusu, mpe bikuke na yango ebebisamaki na moto. »


Basoda ya Babiloni batumbaki ndako ya mokonzi mpe bandako ya bato, mpe babukaki bamir ya Yelusalemi.


Abebisi lopango na ye ndenge babebisaka lopango ya elanga, abebisi esika na bango ya mayangani. Na kanda makasi na Ye, Yawe asali ete Siona abosana bafeti oyo ekatama mpe mikolo ya Saba ; mpe apameli mokonzi mpe Nganga-Nzambe.


Bakobotola lokola bomengo ya bitumba bozwi mpe biloko na yo ya koteka, bakokweyisa bamir na yo, bakobuka bandako na yo ya kitoko mpe, na sima, bakobwaka nyonso na ebale : mabanga, mabaya mpe putulu na yo.


Tango Arioki, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, abimaki mpo na kokende koboma bato ya bwanya ya Babiloni, Daniele asololaki na ye na bwanya mpe na mayele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ