Jeremi 52:1 - Mokanda na Bomoi1 Sedesiasi azalaki na mibu tuku mibale na moko ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na moko na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki Amutali, mwana ya Jeremi, moto ya Libina. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tango Sedesiasi akokisaki mibu libwa na bokonzi, na mokolo ya zomi ya sanza mpe ya zomi, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, elongo na mampinga na ye nyonso, ayaki kobundisa Yelusalemi. Batongaki molako na bango libanda ya engumba, mpe atongaki mabulu mpo na kobombama, na zingazinga na yango nyonso.