Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 51:9 - Mokanda na Bomoi

9 ‹ Tozalaki na posa ya kobikisa Babiloni, kasi akobika te ; yango wana, tobima kati na yango mpe tokende, moto na moto na engumba na ye ; pamba te esambiselo na ye ekomi kino na Lola, emati likolo lokola mapata. ›

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 51:9
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kuna na Samari, ezalaki na mosakoli moko ya Yawe, kombo na ye « Odedi. » Abimaki liboso ya mampinga tango bazalaki kozonga na Samari mpe alobaki na bango : « Tala, na kanda makasi na Ye mpo na Yuda, Yawe, Nzambe ya batata na bino, akabi bango na maboko na bino, mpe bobomi bango na kanda oyo ekomi kino na likolo.


Nalobaki : « Oh Nzambe na ngai ! Nazali kati na mobulu mpe nazali koyoka soni makasi mpo na kotombola elongi na ngai epai na Yo, Nzambe na ngai ; pamba te masumu mpe mabe na biso ekomi ebele penza mpe emati kino na Likolo !


Lokola mboloko oyo bazali kolanda, lokola bameme oyo ezanga mobateli, moko na moko akozonga epai ya bato na ye, moko na moko akokima kino na mboka ya bakoko na ye.


Ezali bongo nde bakokoma liboso na yo, bato nyonso oyo ozalaki komonela pasi, mpe bato oyo ozalaki kosala elongo na bango wuta bolenge na yo. Moko na moko na bango akoyengayenga na ngambo na ye, moko te akobikisa yo !


Tango nyonso, bazali se kobeta mabaku, bazali kokweya moko likolo ya mosusu. Bazali koloba : ‹ Tika ete totelema mpe tozonga epai ya bato na biso moko mpe na mokili na biso, epai babota biso, mpo ete tobika na mopanga oyo ezali koboma. ›


Basoda ya bapaya bazali kati na milongo na ye, bazali lokola bana ngombe ya mibali mpe ya mafuta kati na etonga. Bango mpe bakobaluka mpe bakokima nzela moko ; bakokoka kolonga te, pamba te mokolo ya pasi ezali koya kokweyela bango : ezali tango ya etumbu mpo na bango.


Boboma wuta na mokili ya Babiloni bato oyo basalaka bilanga mpe bato oyo basimbaka mbeli mpo na kobuka mbuma. Likolo ya mopanga ya monyokoli, tika ete moto na moto azonga na mokili na ye, tika ete moto na moto akima na mokili na ye.


« Tango ya kobuka mbuma esili koleka, elanga mpe esili kokoma na suka, kasi biso tobikisami te. »


Mawa na bango mpo ete bakimi mosika na Ngai ! Tika ete babebisama mpo ete batombokeli Ngai ! Wana nazalaki na Ngai kokangola bango, kasi bango, basepelaki kokosela Ngai makambo !


Bongo nayokaki mongongo mosusu koloba wuta na likolo : « Bino bato na ngai, bobima longwa na Babiloni mpo ete bosangana te na masumu na yango, mpe mpo ete bozwa te bitumbu oyo ekokweyela yango.


Pamba te masumu na yango esali mipiku kino na likolo, mpe Nzambe akanisi lisusu misala na yango nyonso ya mabe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ