Pasi ekokomela yo, mpe okoyeba te ndenge ya kolongola yango ; mikakatano ekokomela yo mpe okokoka komibatela te ; libebi oyo oyebaki te ekokomela yo na pwasa.
Makambo mibale oyo ekokomela yo mbala moko mpe kaka na mokolo moko : kozanga bana mpe kokufisa mobali. Makambo oyo eleka ndelo nde ekokomela yo, ata kindoki na yo ezali makasi mpe bakisi na yo ezali na nguya.
« Sakola mpe tatola yango kati na bikolo, telemisa bendele ! Sala ete bato nyonso bayeba yango, kobomba likambo moko te ! Loba : ‹ Bakobotola mokili ya Babiloni ! Beli akoyokisama soni ! Mariduki akobukana ! Bililingi na ye ekosambwa, mpe banzambe na bango ya bikeko ekobukana. ›
Ezali ata na kisi moko te oyo ekoki kobikisa pota na yo ; pota na yo ezali monene makasi ! Moto nyonso oyo akoyoka sango ya makambo oyo ekomeli yo akobeta maboko mpo na kokweyisama na yo. Pamba te nani oyo ozangaki kosala mabe ?
Agangaki na mongongo makasi : « Ekweyi ! Ekweyi ! Babiloni monene ekweyi penza ! Ekomi ndako ya milimo mabe, ebombamelo ya milimo nyonso ya mbindo, ya bandeke ya mbindo mpe ya banyama ya nkele.