« Boye loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Bomela, bolangwa mpe bosanza, bokweya mpo na kotelema lisusu te, mpo na mopanga oyo nakotinda kati na bino. ›
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bamir nyonso ya milayi ya Babiloni ekokweyisama mpe bikuke na yango nyonso ya minene ekozikisama na moto ; bato bazali kosala bobele mosala ya pamba mpe bato ya bikolo mosusu bazali komimonisa pasi mpo na mosala oyo ekobeba na moto. »
Bato ya bikolo nyonso oyo bayebaki yo bakomi na mawa na tina na yo mpo ete okomi eloko ya koyoka somo : suka na yo ezali mabe, ozali lisusu te, okotikala lisusu kozala te ! › »
Agangaki na mongongo makasi : « Ekweyi ! Ekweyi ! Babiloni monene ekweyi penza ! Ekomi ndako ya milimo mabe, ebombamelo ya milimo nyonso ya mbindo, ya bandeke ya mbindo mpe ya banyama ya nkele.