Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 51:62 - Mokanda na Bomoi

62 Bongo okoloba : ‹ Oh Yawe, Yo moko nde olobaki ete okobebisa esika oyo mpo ete bato mpe bibwele bavanda lisusu awa te, kasi etikala pamba mpo na libela. ›

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 51:62
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi soki mibu tuku sambo ekoki, nakopesa mokonzi ya Babiloni elongo na ekolo na ye mpe mokili ya bato ya Babiloni etumbu mpo na mabe oyo basalaki, » elobi Yawe, « mpe nakobebisa yango mpo na libela.


nakobengisa bato nyonso ya bikolo ya nor mpe mosali na Ngai, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, » elobi Yawe, « nakosala ete babundisa mokili oyo, bavandi na yango mpe bikolo nyonso ya zingazinga. Nakobebisa bango penza mpe nakokomisa bango eloko ya somo mpe ya kotiola ; boye bakotikala seko na seko libebi.


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Kati na esika oyo ebebisama mpe ezanga bato to banyama, mpe kati na bingumba na yango nyonso, ekozala na lisusu na bitando ya matiti mpo na babateli bibwele, bitando epai wapi bakoleisa bibwele na bango.


mama na bino akoyoka soni makasi ; ye oyo abotaki bino akosambwa. Ekozala ekolo ya suka kati na bikolo, ekozala zelo na zelo, mabele ya kokawuka mpe esobe.


Likolo ya kanda ya Yawe, bato bakovanda lisusu na Babiloni te mpo ete ekobebisama nye. Bato nyonso oyo bakoleka na Babiloni bakokamwa mpe bakozala na somo ya komona bapota na yango nyonso.


Ekolo moko ekowuta na nor mpe ekobundisa Babiloni, ekobebisa yango, bongo moto moko te akovanda lisusu kuna ; ezala bato to banyama, nyonso ekokima.


Mikili ezali koningana mpe kotepatepa, pamba te mikano ya Yawe mpo na Babiloni ezali kokokisama mpo na kobebisa yango mpo ete, ata moto moko te atikala kovanda lisusu kuna.


Mokili ya Babiloni ekokoma liboke ya mabanga, ndako ya mbwa ya zamba, eloko ya somo mpe ya kotiola ; bongo, bato bakovanda lisusu kuna te.


Bingumba na yango ekobebisama, ekokoma lokola mokili oyo ekawuka to lokola esobe, mokili oyo bato bavandaka te, mokili epai wapi bato bayaka na mibembo te.


Jeremi alobaki na Seraya : « Tango okokoma kati na Babiloni, sala ete otanga makambo oyo nyonso na mongongo makasi.


Nakokomisa yo esobe mpo na libela, bingumba na yo ekozala lisusu na bato te ; boye bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ