Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 51:59 - Mokanda na Bomoi

59 Tala sango oyo mosakoli Jeremi apesaki epai ya Seraya, mwana mobali ya Neriya, mwana mobali ya Maaseya, tango akendeki na Babiloni elongo na Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, na mobu ya minei ya bokonzi na ye. Seraya azalaki mokonzi ya molako.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 51:59
6 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi lokola batata na biso batumbolaki kanda ya Nzambe ya Likolo, akabaki bango na maboko ya Nabukodonozori, moto ya Chalide, mokonzi ya Babiloni. Ezali ye nde abukaki Tempelo oyo mpe amemaki bato na bowumbu, na Babiloni.


Kaka na mobu wana, mobu ya minei, na ebandeli ya bokonzi ya Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, na sanza ya mitano, mosakoli Anania, mwana mobali ya Azuri, moto ya mboka Gabaoni, alobaki na ngai kati na Tempelo ya Yawe na miso ya Banganga-Nzambe mpe ya bato nyonso :


mpe napesaki mokanda oyo nasombelaki elanga epai ya Baruki, mwana mobali ya Neriya, mwana mobali ya Maaseya, na miso ya Anameyeli, mwana ya noko na ngai, mpe ya batatoli oyo batiaki mikoloto na bango kati na mokanda oyo nasombelaki elanga, mpe na miso ya Bayuda nyonso oyo bazalaki kati na lopango ya bakengeli.


Boye, Jeremi abengaki Baruki, mwana mobali ya Neriya, mpe wana Jeremi azalaki koloba makambo nyonso oyo Yawe ayebisaki ye, Baruki azalaki kokoma yango na mokanda.


Tango Baruki asilisaki kokoma kati na mokanda makambo oyo Jeremi atindaki ye, na mobu ya minei ya bokonzi ya Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, mosakoli Jeremi alobaki na Baruki, mwana mobali ya Neriya, maloba oyo :


Sedesiasi azalaki na mibu tuku mibale na moko ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na moko na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki Amutali, mwana ya Jeremi, moto ya Libina.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ