Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 51:58 - Mokanda na Bomoi

58 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bamir nyonso ya milayi ya Babiloni ekokweyisama mpe bikuke na yango nyonso ya minene ekozikisama na moto ; bato bazali kosala bobele mosala ya pamba mpe bato ya bikolo mosusu bazali komimonisa pasi mpo na mosala oyo ekobeba na moto. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 51:58
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzembo ya Salomo. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Soki Yawe atongi ndako te, batongi ndako bazali kosala mosala ya pamba ; soki Yawe akengeli engumba te, bakengeli bazali kosala na pamba.


Botombola bendele likolo ya ngomba oyo ezanga banzete, boganga epai na bango ; bopepa bango loboko mpo ete bakota na bikuke ya bakambi.


Batoli nyonso oyo osili kozwa epai na bango elembisi yo nzoto ! Tika ete bato ya soloka oyo bayekolaka bikelamu nyonso ya likolo : moyi, sanza, minzoto mpe biloko mosusu, mpe bayebisaka na ebandeli nyonso ya sanza makambo oyo ekoya, batelema wana mpe babikisa yo !


Bakosala mosala na pamba te to bakobota bana te mpo ete bakufa ; pamba te bakozala bato oyo bapambolama na Yawe, bango elongo na bana na bango.


Bobetela ye lokito ya bitumba na bangambo nyonso ! Ayei komitika ye moko, mpo ete bandako na ye oyo batonga makasi ekweyi, bamir na ye ebukani : ezali na lolenge oyo nde Yawe azongiseli ye mabe na mabe. Bozongisela ye makambo oyo ye asalaki bikolo mosusu.


Basoda ya Babiloni batiki kobunda, babombami kati na bandako batonga makasi. Makasi na bango esili, bakomi lokola basi. Bandako ya Babiloni etumbami mpe babuki bikangelo bikuke na yango.


Nakopesa Beli etumbu kati na Babiloni, nakobimisa ye eloko oyo ameli na monoko ; ekolo moko te ekoya lisusu epai na ye mpe bamir ya Babiloni ekokweya.


‹ Ezali boye nde Babiloni ekozinda mpe ekomata lisusu te, likolo ya pasi oyo nakotindela yango. Mpe bato na yango bakokweya. › » Maloba ya Jeremi esuki awa.


‹ Tozalaki na posa ya kobikisa Babiloni, kasi akobika te ; yango wana, tobima kati na yango mpe tokende, moto na moto na engumba na ye ; pamba te esambiselo na ye ekomi kino na Lola, emati likolo lokola mapata. ›


Mosala na bango se kokosa na kokosa ; mpe na lokuta na bango, baboyaka kotosa Ngai, » elobi Yawe.


Banguna na biso bazali kolanda biso, bakomi na sima ya mokongo ; bongo biso tolembi nzoto, tozangi kimia.


Boni, ekatama te epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga, ete misala ya bato ezala kaka lokola koni oyo ezali kopela moto, ete bikolo enyokwamaka bobele se pamba ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ