Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 51:57 - Mokanda na Bomoi

57 Nakolangwisa masanga : bakalaka mpe bato na yango ya bwanya, bayangeli, bakonzi ya basoda mpe basoda na yango ya mpiko. Bakolala pongi ya libela mpe bakolamuka lisusu te, » elobi Mokonzi oyo Kombo na Ye ezali : Yawe, Mokonzi ya mampinga.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 51:57
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, anjelu na Yawe abimaki mpe abomaki bato nkoto nkama moko na tuku mwambe na mitano kati na molako ya bato ya Asiri. Tango bato balamukaki na tongo ya mokolo oyo elandaki, bakutaki kaka bibembe.


Sik’oyo, nakomisi bilembo ya basakoli ya lokuta eloko pamba ; natie mobulu kati na molimo ya bato oyo balobaka makambo ekoya, nakweyisi boyebi ya bato ya bwanya mpe nakomisi mayele na bango liboma.


Nalobaki : « Mawa na ngai ! Nabebi na ngai, pamba te nazali moto ya bibebu ya mbindo, navandaka kati na bato oyo bazali na bibebu ya mbindo, mpe miso na ngai emoni Mokonzi, Yawe, Mokonzi ya mampinga ! »


Yebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Nakolangwisa bavandi nyonso ya mokili oyo masanga ; ezala bakonzi oyo bavandaka na kiti ya bokonzi ya Davidi, Banganga-Nzambe, basakoli mpe bavandi nyonso ya Yelusalemi.


« Boye loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Bomela, bolangwa mpe bosanza, bokweya mpo na kotelema lisusu te, mpo na mopanga oyo nakotinda kati na bino. ›


Lokola Ngai nazali na bomoi, » elobi Mokonzi oyo Kombo na Ye ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga ; « monguna oyo azali lokola ngomba Tabori kati na bangomba, lokola ngomba Karimeli pembeni ya ebale monene, azali koya !


Mokili ya Moabi ekobebisama, mpe bakobotola bingumba na yango na makasi ; bilenge mibali oyo Moabi etielaka motema bakokufa na mopanga, » elobi Mokonzi oyo Kombo na Ye ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Yango wana, na mokolo wana, bilenge mibali na yango bakokweya na babalabala, basoda na yango nyonso ya mpiko bakokanga minoko, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Kasi tango bakokoma na posa makasi ya kosangisa nzoto, nakobongisela bango feti mpe nakolangwisa bango masanga mpo ete batondisama na esengo ; bongo, bakolala pongi ya libela mpe bakoka lisusu kolamuka te, » elobi Yawe,


Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, nakokonza bino, na nguya ya loboko na Ngai, oyo esembolama, mpe na kanda makasi ;


Bakokoma lokola bato oyo bazali kati na banzube, lokola bato oyo balangwe masanga ya vino ; bakozikisama nye lokola matiti ya kokawuka.


Oh mokonzi ya Asiri, bakambi na yo bazali kolala pongi, basoda na yo ya mpiko balali pongi ya makasi, mampinga na yo bapalangani na bangomba mpe moto akosangisa bango azali komonana te.


« Tika ete alakelama mabe, ye oyo azali na ebwele ya kitoko kati na etonga na ye, mpe alapi ndayi ete akobonza yango epai na Yawe, kasi abonzi ebwele oyo ebela ! Pamba te Ngai, nazali Mokonzi Monene, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpe bikolo nyonso esengeli kobanga Kombo na Ngai.


Tango bakonzi ya mokili, oyo bakabolaki elongo na yango bomoi na yango ya kindumba mpe ya bisengo, bakomona molinga ya engumba oyo etumbami, bakolela mpe bakoyoka mawa na tina na yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ