Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 51:56 - Mokanda na Bomoi

56 Mobebisi akoya kobundisa Babiloni ; bongo bakokanga basoda na yango ya mpiko mpe bakobuka matolotolo na bango, pamba te Yawe azali Nzambe oyo afutaka : afutaka kolanda misala ya moto na moto.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 51:56
32 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

kasi ye asimbaki kaka makasi tolotolo na ye, mpe maboko na ye etikalaki kolenga te mpo na loboko ya Elombe ya Jakobi, oyo azali Mobateli mpate, Libanga ya Isalaele.


Babiloni, engumba kitoko, yo oyo okobebisama solo, esengo na moto oyo akozongisela yo mabe na mabe oyo osalaki biso !


Kasi mipanga na bango ekotobola mitema na bango moko, mpe batolotolo na bango ekobukana.


Boya kotala misala ya Yawe, makambo minene oyo asalaka kati na mokili.


Ndako na Ye ya kapo ezali na Salemi ; mpe esika na Ye ya kovanda ezali na Siona.


Namonaki emoniseli moko ya somo : Moteki baninga azali koteka baninga, mobebisi azali kobebisa. Elami, bundisa bango ! Medi, zingela bango ! Nakosukisa kolela nyonso oyo ayeisaki na bato.


Pamba te ezali mpo na Yawe, mokolo ya kozongisa mabe na mabe, mobu ya lifuti mpo na likambo ya Siona.


Loba na bato oyo bazali kobanga : « Bozala makasi, bobanga te, Nzambe na bino akoya, akoya kozongisa mabe na mabe, akoya na lifuti ya Nzambe. Ye moko akoya kobikisa bino. »


Akofuta moto na moto kolanda misala na ye : kanda makasi epai ya bayini na Ye, mpe lifuti oyo ekoki epai ya banguna na Ye ; akopesa na bisanga lifuti na yango.


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Tala, nakobuka tolotolo ya Elami, ebundeli oyo esalaka makasi na ye.


Boye, bakobotola bomengo ya Babiloni mpe bato nyonso oyo bakobotola yango bakotonda, » elobi Yawe.


‹ Mopanga, boma basakoli na yango ya lokuta ; tika ete bakoma bato ya maboma ! Mopanga, boma basoda na yango ya mpiko ; tika ete bakoma na somo !


Nakozongisela Babiloni mpe bavandi na yango nyonso mabe nyonso oyo basalaki Siona, » elobi Yawe.


Basoda ya Babiloni batiki kobunda, babombami kati na bandako batonga makasi. Makasi na bango esili, bakomi lokola basi. Bandako ya Babiloni etumbami mpe babuki bikangelo bikuke na yango.


Bongo likolo, mabele mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango ekoganga na esengo mpo na komona kobebisama ya Babiloni, pamba te babebisi bakobimela na nor mpo na kobundisa yango, » elobi Yawe.


Ata soki mokili ya Babiloni emati kino na Lola mpe elendisi bandako na yango oyo batonga makasi, nakotindela yango bato mpo na kokweyisa yango, » elobi Yawe.


Bobima na Babiloni, bobikisa bomoi na bino ! Soki te, bokokufa likolo ya masumu na bango. Ezali tango oyo Yawe alingi kozongisela bango mabe na mabe mpe kofuta bango ndenge ezali misala na bango.


Yawe, pesa bango lifuti oyo ekoki na bango kolanda misala na bango ;


Nakobuka tolotolo na yo oyo osimbi na loboko ya mwasi mpe nakokweyisa likonga oyo osimbi na loboko ya mobali.


Bavandi ya bingumba ya Isalaele bakobima, bakopelisa moto, bakotumba bibundeli nyonso : banguba ya mike mpe banguba ya minene, matolotolo mpe makonga ya mike, banzete mpe makonga ya minene ; bakopelisela yango moto mibu sambo.


Mobeti tolotolo akolonga te, soda ya mpiko akokoka kokima te, mpe soda oyo atambolaka likolo ya mpunda akobikisa bomoi na ye te ;


Mokolo ya Yawe ekomi pene mpo na bikolo nyonso. Bakosala yo kaka makambo oyo yo osalaki, bongo mabe oyo osalaki ekozongela yo.


Lokola obotolaki bomengo ya bato ya bikolo ebele na makasi, bato oyo batikali bakobotola yo mpe bomengo na yo na makasi, mpo ete osopaki makila ya bato, obebisaki mikili mpe bingumba elongo na bavandi na yango nyonso.


Ngai nde nazongisaka mabe na mabe, Ngai nde nakofuta moto na moto. Tango lokolo na bango ekobeta libaku, na tango wana nde pasi na bango ekoya na lombangu, mpe nyonso oyo Nzambe abongisa wuta kala mpo na bango ekowumela te. »


Solo, Nzambe azali sembo : akozongisa pasi lokola etumbu epai ya banyokoli na bino ;


Nyama mpe maseke zomi oyo omonaki ekoyina mwasi ya ndumba, ekobotola biloko na ye nyonso mpe ekotika ye bolumbu ; ekolia misuni na ye mpe ekotumba ye na nzela ya moto.


Likolo, sepela na libebi na yango ! Bino mpe basantu, bosepela ! Bino bantoma mpe basakoli, bosepela mpe lokola ! Pamba te Nzambe alongisi bino awa akateli yango etumbu. »


pamba te akataka makambo na bosolo mpe na bosembo ; apesi etumbu epai ya mwasi ya ndumba monene oyo azalaki kobebisa mokili na nzela ya kindumba na ye, mpe azongisi mabe na mabe mpo na makila ya bawumbu na Ye. »


Tolotolo ya bilombe ebukani, kasi bato na bolembu bazwi makasi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ