Maloba ya kosambisa mokili ya Moabi : Pamba te na butu oyo Moabi ebebisamaki, Ari kati na Moabi mpe ebebisamaki, solo, ebebisamaki kaka na butu moko ! Kiri kati na Moabi mpe ebebisamaki ; solo, ebebisamaki kaka na butu moko !
Ata bato ya bikolo bazali koganga lokola makelele ya mayi ya bibale minene, bakimaka penza mosika tango Yawe apamelaka bango ; bakimaka lokola matiti na bangomba na tango ya mopepe, lokola putulu na tango ya mopepe makasi.
Bilembo ekomonana kati na moyi, kati na sanza, mpe kati na minzoto ; bongo na mokili, bikolo ekotonda na somo mpe na kobanga likolo ya lokito makasi mpe ya bambonge ya ebale monene.
Anjelu alobaki na ngai : « Mayi oyo omonaki, oyo mwasi ya ndumba avandaki na likolo na yango, ezali bato ya mokili, bangulupa ebele ya bato, bikolo mpe nkota.