53 Ata soki mokili ya Babiloni emati kino na Lola mpe elendisi bandako na yango oyo batonga makasi, nakotindela yango bato mpo na kokweyisa yango, » elobi Yawe.
Balobaki : « Tokende, totonga engumba mpo na biso mpe ndako molayi oyo songe na yango ekokoma kino na lola, mpo ete kombo na biso ekende sango mpe topanzana te na mokili mobimba. »
Nabimisaki moto moko wuta na ngambo ya nor, mpe azali koya, moto moko, wuta na ngambo ya este, oyo abelelaka Kombo na Ngai. Azali konyata bakambi ndenge banyataka potopoto, lokola potopoto ya mabele ya bikeko ya mosali mbeki.
Somo oyo bato bazali koyoka yo mpe lolendo ya motema na yo ezali kokosa yo. Yo movandi ya madusu ya mabanga, yo oyo otonga ndako na yo na basonge ya bangomba ; ata soki otongi zala na yo likolo lokola mpongo, nakokweyisa yo longwa kuna kino na se, » elobi Yawe.
Yawe afungolaki bibundeli na Ye nyonso mpe abimisaki kati na yango bibundeli ya kanda na Ye ; pamba te yango nde mosala oyo Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, asili kosala na mokili ya bato ya Babiloni.
Yango wana, boyoka mabongisi oyo Yawe asili kosala mpo na Babiloni, mokano oyo asili kozwa mpo na kotelemela mokili ya bato ya Babiloni : Bakobengana bango na lopango lokola bana mike ya etonga, akobebisa etando na bango.
Bopelisa basonge ya makonga, bokamata banguba na bino ; pamba te Yawe atindi bakonzi ya Medi mpo ete mokano na Ye ezali ya kobebisa Babiloni. Yawe akozongisa mabe na mabe, akosala yango mpo na Tempelo na Ye.
« Yo ngomba oyo obebisaka, yo oyo obebisaka mokili, nakotelemela yo, » elobi Yawe, « nakosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela yo, nakokitisa yo wuta na likolo ya mabanga, mpe nakokomisa yo ngomba ezika na moto.
Bongo likolo, mabele mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango ekoganga na esengo mpo na komona kobebisama ya Babiloni, pamba te babebisi bakobimela na nor mpo na kobundisa yango, » elobi Yawe.
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bamir nyonso ya milayi ya Babiloni ekokweyisama mpe bikuke na yango nyonso ya minene ekozikisama na moto ; bato bazali kosala bobele mosala ya pamba mpe bato ya bikolo mosusu bazali komimonisa pasi mpo na mosala oyo ekobeba na moto. »
Mbala moko, makambo nyonso oyo elobamaki na tina na Nabukodonozori ekokisamaki. Babenganaki ye na molongo ya bato mpe akomaki kolia matiti lokola ngombe ; mamwe ekomaki kopolisa nzoto na ye kino suki na ye ekomaki milayi lokola masala ya mpongo ya mobange, mpe manzaka na ye lokola manzaka ya ndeke.
Mawa na moto oyo atongaka ndako na ye na nzela ya sembo te ! Alukaka kosala zala na ye na likolo ya bangomba mpo na kokima ete makambo mabe ekomela ye.