Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 51:50 - Mokanda na Bomoi

50 Bino bato oyo bobiki na mopanga, bokima, bolekisa tango te ! Wuta na mokili ya mosika, bokanisa Yawe mpe Yelusalemi !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 51:50
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bosenga kimia ya Yelusalemi ! Tika ete bato oyo balingaka yo, Yelusalemi, babika na kimia !


Bobima na Babiloni, bokima wuta na bato ya Babiloni ! Boloba yango na makelele ya esengo mpe botatola yango ; bopanza sango na yango kino na suka ya mokili ; boloba : ‹ Yawe asikoli Jakobi, mosali na Ye. › »


Boye, bato oyo Yawe akangoli bakozonga, bakokota kati na Siona na banzembo ya esengo ; esengo ya libela na libela ekozala lokola motole na mito na bango ; bakotondisama na esengo mpe na kosepela, bongo pasi mpe minyoko ekokima mosika na bango.


Oh Yelusalemi, milongola na putulu, telema mpe vanda na esika na yo ya lokumu ! Oh Siona, mboka kitoko, yo oyo ozali mokangami, kata minyololo na kingo na yo !


« Tia bilembo na nzela, pika makonzi oyo elakisaka nzela na nzela yango ; sala penza keba na nzela na yo, na nzela oyo ozali kolanda. Oh Isalaele, mboka kitoko, zonga, zonga na bingumba na yo !


Kaka ndambo moke ya bato nde ekobika na mopanga mpe ekozonga na mokili ya Yuda, wuta na Ejipito. Boye, batikali nyonso ya Yuda, ba-oyo nyonso bayaki kovanda na Ejipito, bakoyeba soki liloba ya nani nde ekokokisama : ya Ngai to ya bango.


Bobima mbangu na Babiloni, botika mokili ya Babiloni ! Bozala lokola bantaba ya mibali oyo ezali kotambola liboso ya etonga.


Oh bato na Ngai, bobima na Babiloni ! Bobikisa bomoi na bino liboso ya kanda makasi ya Yawe !


Bobima na Babiloni, bobikisa bomoi na bino ! Soki te, bokokufa likolo ya masumu na bango. Ezali tango oyo Yawe alingi kozongisela bango mabe na mabe mpe kofuta bango ndenge ezali misala na bango.


Bongo, kati na bikolo nyonso epai wapi bakokende na bowumbu, bato oyo bakobika bakokanisa ngai tango nakobuka lolendo ya mitema na bango, oyo etonda na posa ya kosalela banzambe mosusu mpe nakobebisa miso na bango, oyo eboyaka kotala Ngai mpo na kotala banzambe na bango ya bikeko. Bango moko bakoyoka nkele mpo na mabe oyo basalaki mpe mpo na misala na bango nyonso ya mbindo.


Tango Daniele asosolaki ete sango ya mokano yango esili kopanzana, akotaki na ndako na ye, amataki na etaje mpe akotaki na shambre oyo maninisa na yango etala na ngambo ya Yelusalemi ; mbala misato na mokolo, azalaki kofukama mpo na kosambela mpe kopesa matondi epai ya Nzambe na ye, ndenge kaka azalaki kosala liboso.


Bongo nayokaki mongongo mosusu koloba wuta na likolo : « Bino bato na ngai, bobima longwa na Babiloni mpo ete bosangana te na masumu na yango, mpe mpo ete bozwa te bitumbu oyo ekokweyela yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ