47 Pamba te tango ekoya solo, tango oyo nakopesa etumbu na banzambe ya Babiloni ; mpe mokili na yango nyonso ekozala na soni, mpe bato na yango nyonso oyo bazokisa makasi na mopanga bakokufa kuna.
yango wana tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Nakopesa bango etumbu. Bilenge mibali na bango bakokufa na mopanga, bana na bango ya mibali mpe ya basi bakokufa na nzala makasi.
Kasi soki mibu tuku sambo ekoki, nakopesa mokonzi ya Babiloni elongo na ekolo na ye mpe mokili ya bato ya Babiloni etumbu mpo na mabe oyo basalaki, » elobi Yawe, « mpe nakobebisa yango mpo na libela.
« Sakola mpe tatola yango kati na bikolo, telemisa bendele ! Sala ete bato nyonso bayeba yango, kobomba likambo moko te ! Loba : ‹ Bakobotola mokili ya Babiloni ! Beli akoyokisama soni ! Mariduki akobukana ! Bililingi na ye ekosambwa, mpe banzambe na bango ya bikeko ekobukana. ›
Kasi na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « nakopesa etumbu na banzambe ya Babiloni, mpe mokili mobimba ekotonda na makelele ya bato oyo bazoka bapota ya somo.