Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 51:46 - Mokanda na Bomoi

46 Bobanga te mpe bolemba nzoto te tango bokoyoka basango ya mabe kati na mokili : mobu oyo, sango ya mabe ; mobu oyo elandi, sango mosusu ya mabe ; kaka sango ya mobulu kati na mokili to sango ya mokonzi moko abundisi mokonzi mosusu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 51:46
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala, nakotia molimo moko kati na ye mpo ete, tango akoyoka sango ya makambo oyo ezali koleka na mboka na ye, azonga na mokili na ye ; mpe ekozala kuna, na mokili na ye, nde nakobomisa ye na mopanga. › »


Bato ya Amoni mpe ya Moabi batelemaki mpo na kobundisa, koboma mpe kobebisa bavandi ya bangomba Seiri. Tango basilisaki koboma bavandi ya Seiri, bakomaki kobomana bango na bango.


Nzambe alembisi ngai, Nkolo-Na-Nguya-Nyonso abangisi ngai.


Soki omilembisi na mokolo ya pasi, makasi na yo ekozala pamba.


« Nakosala ete bato ya Ejipito batelemelana bango na bango : ndeko akobundisa ndeko na ye, moninga akobundisa moninga na ye, engumba moko ekobundisa engumba mosusu, mpe mboka moko ekobundisa mboka mosusu.


Kobanga te, pamba te nazali elongo na yo : nakoyeisa bana na yo wuta na ngambo ya este mpe nakosangisa bino wuta na ngambo ya weste ;


« Oh Jakobi, mosali na Ngai, kobanga te ! Oh Isalaele, kobanga te ; nakobikisa yo solo wuta na mokili ya mosika, nabikisa bakitani na yo wuta na mokili ya bowumbu. Jakobi akozala lisusu na kimia mpe na bobatelami malamu, moto moko te akobangisa ye lisusu.


Oh Jakobi, mosali na Ngai, kobanga te ; pamba te nazali elongo na yo, » elobi Yawe, « ata soki nabebisi bikolo nyonso epai wapi napanzaki bino, nakobebisa yo nyonso te. Nakopamela yo solo, kasi nakosala yango na bosembo ; nakozanga te kopesa yo etumbu. »


Tango makambo wana ekobanda kosalema, botelema, botombola mito mpe boyika mpiko, pamba te lisiko na bino ekomi pene.


Tango bakelelo nkama misato ebetaki lisusu, Yawe asalaki ete, kati na molako mobimba, moto na moto atuba moninga na ye mopanga ; mpe bango nyonso bakimaki kino na Beti-Shita, na ngambo ya Tserera, mpe kino na ngambo ya Abele-Meola pembeni ya Tabati.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ