Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 51:45 - Mokanda na Bomoi

45 Oh bato na Ngai, bobima na Babiloni ! Bobikisa bomoi na bino liboso ya kanda makasi ya Yawe !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 51:45
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bobima na Babiloni, bokima wuta na bato ya Babiloni ! Boloba yango na makelele ya esengo mpe botatola yango ; bopanza sango na yango kino na suka ya mokili ; boloba : ‹ Yawe asikoli Jakobi, mosali na Ye. › »


Boyoka ! Tala bango bazali kokima mpe babiki wuta na mokili ya Babiloni mpo na koyebisa kati na Siona ndenge nini Yawe, Nzambe na biso, azongisi mabe na mabe ; ndenge nini azongisi mabe na mabe likolo na Tempelo na Ye.


Bobima mbangu na Babiloni, botika mokili ya Babiloni ! Bozala lokola bantaba ya mibali oyo ezali kotambola liboso ya etonga.


Bino bato oyo bobiki na mopanga, bokima, bolekisa tango te ! Wuta na mokili ya mosika, bokanisa Yawe mpe Yelusalemi !


Bobima na Babiloni, bobikisa bomoi na bino ! Soki te, bokokufa likolo ya masumu na bango. Ezali tango oyo Yawe alingi kozongisela bango mabe na mabe mpe kofuta bango ndenge ezali misala na bango.


‹ Tozalaki na posa ya kobikisa Babiloni, kasi akobika te ; yango wana, tobima kati na yango mpe tokende, moto na moto na engumba na ye ; pamba te esambiselo na ye ekomi kino na Lola, emati likolo lokola mapata. ›


Bongo Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai atikaki ngai, mpe Anjelu mosusu ayaki mpo na kokutana na ye


Akebisaki lisanga mobimba : « Bozala mosika ya bandako ya kapo ya bato oyo ya mabe. Bosimba ata eloko moko te ya bango, noki te bokokufa likolo ya masumu na bango ! »


Petelo azalaki kokebisa bango na maloba ebele mpe azalaki kolendisa bango na maloba oyo : — Boyamba lobiko mpo ete bozwa etumbu te oyo ezali kozela bato mabe.


Yango wana, « Bobima kati na bango mpe bokabwana na bango, elobi Nkolo ; bosimba eloko moko te ya mbindo, mpe ngai nakoyamba bino. »


Bongo nayokaki mongongo mosusu koloba wuta na likolo : « Bino bato na ngai, bobima longwa na Babiloni mpo ete bosangana te na masumu na yango, mpe mpo ete bozwa te bitumbu oyo ekokweyela yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ