Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 51:44 - Mokanda na Bomoi

44 Nakopesa Beli etumbu kati na Babiloni, nakobimisa ye eloko oyo ameli na monoko ; ekolo moko te ekoya lisusu epai na ye mpe bamir ya Babiloni ekokweya.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 51:44
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nabukodonozori amemaki mpe na Babiloni ndambo ya biloko ya Tempelo ya Yawe mpe atiaki yango kati na ndako na ye ya bokonzi.


Amelaki na pamba bozwi ebele, asengeli kosanza yango ; Nzambe akofutisa ye yango.


Na mikolo oyo ekoya, ngomba ya Tempelo ya Yawe ekolendisama ngwi na songe ya bangomba, ekoleka bangomba mikuse nyonso na molayi, mpe bikolo nyonso ekokende kotondana kuna.


Tala, moto moko azali koya awa na shar, oyo bampunda mibale ezali kobenda. Azongisaki eyano : ‹ Babiloni esili kokweya, ekweyi solo ! Banzambe na yango nyonso ya bikeko elali-lali mpe epanzani na mabele ! › »


Boye, okomona mpe okongenga, motema na yo ekobeta mpe ekosepela ; bomengo ya ebale ekoya epai na yo, mpe bozwi ya bikolo ekoya epai na yo.


Bobetela ye lokito ya bitumba na bangambo nyonso ! Ayei komitika ye moko, mpo ete bandako na ye oyo batonga makasi ekweyi, bamir na ye ebukani : ezali na lolenge oyo nde Yawe azongiseli ye mabe na mabe. Bozongisela ye makambo oyo ye asalaki bikolo mosusu.


« Sakola mpe tatola yango kati na bikolo, telemisa bendele ! Sala ete bato nyonso bayeba yango, kobomba likambo moko te ! Loba : ‹ Bakobotola mokili ya Babiloni ! Beli akoyokisama soni ! Mariduki akobukana ! Bililingi na ye ekosambwa, mpe banzambe na bango ya bikeko ekobukana. ›


Ezali biloko ya pamba, biloko ya kotiola ; ekolimwa na tango ya kosambisama.


Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, abomaki biso ; solo, atiaki biso na mobulu, akomisaki biso lokola mbeki ya pamba ; amelaki biso ndenge nguma emelaka nyama, atondisaki libumu na ye na biloko na biso ya kitoko ; mpe sima, asanzaki biso.


Pamba te tango ekoya solo, tango oyo nakopesa etumbu na banzambe ya Babiloni ; mpe mokili na yango nyonso ekozala na soni, mpe bato na yango nyonso oyo bazokisa makasi na mopanga bakokufa kuna.


Ata soki mokili ya Babiloni emati kino na Lola mpe elendisi bandako na yango oyo batonga makasi, nakotindela yango bato mpo na kokweyisa yango, » elobi Yawe.


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bamir nyonso ya milayi ya Babiloni ekokweyisama mpe bikuke na yango nyonso ya minene ekozikisama na moto ; bato bazali kosala bobele mosala ya pamba mpe bato ya bikolo mosusu bazali komimonisa pasi mpo na mosala oyo ekobeba na moto. »


Yawe akabaki Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, elongo na ndambo ya bisalelo ya Tempelo ya Nzambe na maboko ya Nabukodonozori. Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, amemaki bisalelo yango kati na tempelo ya nzambe na ye, na Shineari, mpe atiaki yango kati na ndako oyo babombelaka bomengo ya nzambe na ye.


Yango wana, nazwi mokano ete moto nyonso, azala ya mokili, ekolo to lokota nini, oyo akoloba mabe mpo na Nzambe ya Shadraki, Meshaki mpe Abedinego, bakokata-kata ye na biteni, bakobuka ndako na ye mpe bakokomisa yango mopiku ya mbindo, pamba te Nzambe mosusu azali te, oyo akoki kobikisa bato na Ye na lolenge oyo !


Ngai, Nabukodonozori, nazalaki na kimia mpe nazalaki kosepela na bomengo kati na ndako na ngai.


« Bakobengana yo na molongo ya bato mpe okokende kovanda esika moko na banyama ya zamba ; okobanda kolia matiti ya zamba lokola ngombe, mpe mamwe ekopolisa nzoto na yo. Mibu sambo ekoleka mpo na yo kino tango okondima ete Ye-Oyo-Aleki-Likolo azali na bokonzi ya kosala makambo oyo Ye alingi kati na bikolo ya bato mpo na kopesa yango na moto oyo Ye alingi.


Mpo na lokumu oyo apesaki ye, bato ya bikolo, ya mikili mpe ya nkota nyonso bakomaki kolenga na somo liboso na ye. Mokonzi azalaki koboma bato oyo azalaki na posa ya koboma, kobikisa bato oyo azalaki na posa ya kobikisa, kotombola bato oyo azalaki na posa ya kotombola mpe kosambwisa bato oyo azalaki na posa ya kosambwisa.


Ndimbola ya maloba yango ezali : Mene  : Nzambe atangi mikolo ya bokonzi na yo mpe akomisi yango na suka ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ