Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 51:43 - Mokanda na Bomoi

43 Bingumba na yango ekobebisama, ekokoma lokola mokili oyo ekawuka to lokola esobe, mokili oyo bato bavandaka te, mokili epai wapi bato bayaka na mibembo te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 51:43
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe, Mokonzi ya mampinga, azali elongo na biso ; Nzambe ya Jakobi azali ekimelo na biso.


Bato bakotikala kovanda lisusu kuna te to ekozala lisusu na bato te na milongo nyonso ; kuna, moto ya Arabi akopika te ndako na ye ya kapo, mpe babateli bibwele bakopemisa te banyama na bango.


Nzube ekobota kati na ndako ya mokonzi ; basende mpe matiti, kati na bandako na ye batonga makasi ; ekokoma ndako ya bambwa ya zamba, lopango ya maligbanga.


Pasi ekokomela yo, mpe okoyeba te ndenge ya kolongola yango ; mikakatano ekokomela yo mpe okokoka komibatela te ; libebi oyo oyebaki te ekokomela yo na pwasa.


Mokili na bango ekotikala lisusu na bato te, ekokoma eloko ya kotiola mpo na tango nyonso, bongo bato nyonso oyo bakoleka wana bakokamwa mpe bakoningisa mito na bango.


Bamitunaki te : ‹ Wapi Yawe oyo abimisaki biso na Ejipito mpe amemaki biso kati na esobe ? Wapi Yawe oyo atambolisaki biso na mokili oyo ekawuka mpe ya mabulu, mokili ya molili mpe ya kufa, mokili oyo baleki nzela balekelaka te mpe mokili oyo bato bavandaka soki moke te ? ›


mama na bino akoyoka soni makasi ; ye oyo abotaki bino akosambwa. Ekozala ekolo ya suka kati na bikolo, ekozala zelo na zelo, mabele ya kokawuka mpe esobe.


Mikili ezali koningana mpe kotepatepa, pamba te mikano ya Yawe mpo na Babiloni ezali kokokisama mpo na kobebisa yango mpo ete, ata moto moko te atikala kovanda lisusu kuna.


Mokili ya Babiloni ekokoma liboke ya mabanga, ndako ya mbwa ya zamba, eloko ya somo mpe ya kotiola ; bongo, bato bakovanda lisusu kuna te.


Bongo okoloba : ‹ Oh Yawe, Yo moko nde olobaki ete okobebisa esika oyo mpo ete bato mpe bibwele bavanda lisusu awa te, kasi etikala pamba mpo na libela. ›


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ