Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 51:41 - Mokanda na Bomoi

41 Ndenge nini bakangi Sheshaki ! Ndenge nini basukisi lolendo ya ekolo oyo ezalaki kosala lokumu ya mokili mobimba ! Ndenge nini penza Babiloni ekomi penza eloko ya somo kati na bikolo !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 51:41
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Atako Tempelo oyo ezali sik’oyo kitoko penza, kasi bato nyonso oyo bakoleka pembeni na yango bakokamwa mpe bakoloba : « Mpo na nini Yawe asali makambo ya boye na mokili oyo mpe na Tempelo oyo ? »


Nzambe akokweyisa Babiloni, kongenga ya babokonzi, nkembo ya lolendo ya bato ya Chalide, ndenge akweyisaki Sodome mpe Gomore.


okoyemba nzembo oyo mpo na kotiola mokonzi ya Babiloni ; okoloba : « Ndenge nini monyokoli akomi na suka ? Ndenge nini penza lolendo na ye esili ?


bakonzi nyonso ya nor, oyo bazalaka pene mpe ba-oyo bazalaka mosika, moko pene na mosusu, bakonzi ya mboka nyonso oyo ezalaka na mokili. Sima na bango nyonso, mokonzi ya Sheshaki mpe akomela yango.


Ndenge nini bosundola engumba ya lokumu boye, engumba oyo ezalaki kosepelisa motema na Ngai ?


Ndenge nini marto oyo ezalaki kobeta mokili mobimba ebukani mpe epanzani ? Ndenge nini penza Babiloni ebebisami kati na bikolo ?


Na lokito ya kokweya ya mokili ya Babiloni, mabele ekoningana ; makelele na yango ekoyokana kino na bikolo mosusu.


Mokili ya Babiloni ekokoma liboke ya mabanga, ndako ya mbwa ya zamba, eloko ya somo mpe ya kotiola ; bongo, bato bakovanda lisusu kuna te.


Bavandi nyonso ya bisanga bakomi na mawa mpo na yo ; bakonzi na bango bazali kolenga na somo, mpe bilongi na bango ebebi likolo ya kobanga.


atiaki na se ya bokonzi na yo bato nyonso ya mokili, banyama ya zamba mpe bandeke ya likolo ; atiaki yo mokonzi na bango nyonso, na bisika nyonso oyo bavandaka ! Ezali yo nde ozali moto wana ya wolo.


« Bakobengana yo na molongo ya bato mpe okokende kovanda esika moko na banyama ya zamba ; okobanda kolia matiti ya zamba lokola ngombe, mpe mamwe ekopolisa nzoto na yo. Mibu sambo ekoleka mpo na yo kino tango okondima ete Ye-Oyo-Aleki-Likolo azali na bokonzi ya kosala makambo oyo Ye alingi kati na bikolo ya bato mpo na kopesa yango na moto oyo Ye alingi.


Mbala moko, makambo nyonso oyo elobamaki na tina na Nabukodonozori ekokisamaki. Babenganaki ye na molongo ya bato mpe akomaki kolia matiti lokola ngombe ; mamwe ekomaki kopolisa nzoto na ye kino suki na ye ekomaki milayi lokola masala ya mpongo ya mobange, mpe manzaka na ye lokola manzaka ya ndeke.


Bikolo nyonso epai wapi Yawe akomema bino, bakomona bakokima bino lokola eloko ya somo mpe bakobeta masapo mpo na kotiola bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ