Bongo Ushayi abakisaki : — Oyebi ete tata na yo mpe bato na ye bazali bato ya mpiko mpe bato na kanda makasi lokola ngombolo ya mwasi oyo bawuti kobotola bana na yango kati na zamba. Tata na yo azali moto oyo abundaka bitumba wuta kala, akolekisa te butu esika moko na bato.
Nkosi ekozala te na nzela yango, ata nyama moko te ya mabe ekoleka na nzela yango, ekotikala komonana kuna te. Kasi basikolami kaka nde bakotambola na nzela yango.
Koganga na bango ezali lokola koganga ya bankosi : bagangaka lokola bana nkosi, bagangaka soki bakangi nyama na bango, bamemaka yango na esika ya kimia, mpe moto moko te akokaka kobotola bango yango.
Dalila abelelaki Samison : « Samison, bato ya Filisitia bayei kobundisa yo ! » Samison alamukaki na pongi na ye mpe amilobelaki : « Nakosala ndenge kaka nasalaka liboso mpe nakokangolama na ngai. » Kasi ayebaki te ete Yawe alongwaki kati na ye.