Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 51:36 - Mokanda na Bomoi

36 Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi : « Tala, nakozwa likambo na yo na maboko mpe nakozongisa mabe na bato oyo basalaki yo mabe, nakokawusa ebale na yango ya monene mpe nakokawusa maziba na yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 51:36
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Akoki kobongola bibale esobe ; kobongola bitima mabele ya kokawuka ;


Batioli bakowumela te kati na mokili, pasi ekolanda bato na kanza na kolemba te.


pamba te Yawe akobundela bango mpe akobebisa bomoi ya bato oyo bakobebisa bomoi na bango.


pamba te Molobeli na bango azalaka makasi, akozwa makambo na bango na maboko mpo na kotelemela yo.


Mayi ya ebale monene ekokita, mpe mayi ya ebale ekosila mpe ekokawuka.


Tala liloba oyo Yawe, Mosikoli na bino, Mosantu ya Isalaele, alobi : « Mpo na likambo na bino, nakotinda na Babiloni, mampinga ya basoda, mpe nakokitisa bato nyonso ya Babiloni lokola bakimi, ezala bato ya Chalide oyo bamikumisaka na koganga mpo na bamasuwa na bango.


Nalobi na ebale monene : ‹ Kawuka, mpe nakokawusa bibale na yo ! ›


Bokawuki, kweyela mayi na yango mpo ete ekawuka ; pamba te ezali mokili ya banzambe ya bikeko, bikeko oyo epesaka bato somo !


Bopelisa basonge ya makonga, bokamata banguba na bino ; pamba te Yawe atindi bakonzi ya Medi mpo ete mokano na Ye ezali ya kobebisa Babiloni. Yawe akozongisa mabe na mabe, akosala yango mpo na Tempelo na Ye.


Bobima na Babiloni, bobikisa bomoi na bino ! Soki te, bokokufa likolo ya masumu na bango. Ezali tango oyo Yawe alingi kozongisela bango mabe na mabe mpe kofuta bango ndenge ezali misala na bango.


Nakozongisela mokili ya Edomi mabe na mabe na nzela ya bato na Ngai, Isalaele : bakozongisela mokili ya Edomi mabe na mabe, kolanda kanda na Ngai mpe kotomboka na Ngai. Na bongo, bakoyeba solo ete Ngai, nazongisaka mabe na mabe, elobi Nkolo Yawe. ›


Ata Efrayimi azali kofuluka kati na bandeko na ye ya mibali, mopepe ya este ekoya, mopepe ya Yawe ekoya wuta na esobe : ekokawusa etima ya Efrayimi, ekokawusa liziba na ye. Monguna akobotola ye biloko nyonso ya talo wuta na ebombelo na yango. »


Balingami na ngai, bozongisaka te bino moko mabe na mabe, kasi bopesaka nzela na kanda ya Nzambe, pamba te ekomama : « Ngai nde nazongisaka mabe na mabe, Ngai nde nakofuta moto na moto, » elobi Nkolo.


Ngai nde nazongisaka mabe na mabe, Ngai nde nakofuta moto na moto. Tango lokolo na bango ekobeta libaku, na tango wana nde pasi na bango ekoya na lombangu, mpe nyonso oyo Nzambe abongisa wuta kala mpo na bango ekowumela te. »


Oh bikolo, bosepela elongo na bato na Ye ! Bino ba-anjelu nyonso, bogumbamela Nzambe ; pamba te akozongisa mabe na mabe mpo na makila ya basali na Ye, akozongisa mabe na mabe epai ya banguna na Ye mpe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na mokili na Ye mpe bato na Ye.


Anjelu ya motoba asopaki kopo na ye na ebale Efrate, mpe mayi na yango ekawukaki mpo ete nzela ya bakonzi oyo bakowuta na Este esalema.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ