Jeremi 51:35 - Mokanda na Bomoi35 Tika ete mabe oyo basali biso mpe bana na biso ekweyela Babiloni, » elobi bavandi ya Siona ! « Tika ete makila na biso etangama na mito ya bavandi ya Babiloni, elobi bavandi ya Yelusalemi ! » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bosangisa bato nyonso oyo babundaka na matolotolo mpo na kotelemela Babiloni ; tika ete bato nyonso oyo babundaka na makonga bazingela Babiloni mobimba, basala ete ata moto moko te akima, bafuta yango ndenge ezalaki misala na yango mpe bazongisela yango makambo oyo esalaki bikolo mosusu ; pamba te ebetaki tembe na Yawe, Mosantu ya Isalaele.