Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 51:34 - Mokanda na Bomoi

34 Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, abomaki biso ; solo, atiaki biso na mobulu, akomisaki biso lokola mbeki ya pamba ; amelaki biso ndenge nguma emelaka nyama, atondisaki libumu na ye na biloko na biso ya kitoko ; mpe sima, asanzaki biso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 51:34
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Amelaki na pamba bozwi ebele, asengeli kosanza yango ; Nzambe akofutisa ye yango.


Yo nde opasolaki ebale na nguya na Yo, opanzaki mito ya bilima ya mayi ;


Ndenge mokili ya bakufi esalaka, tokomela ye ya bomoi, tokomela ye mobimba lokola bato oyo bakitaka na libulu ya kufa ;


Esulungutu mpe ndeke mosusu ya butu ekozwa yango lokola libula, kumu mpe yanganga ekokoma kovanda kuna. Nzambe akosembola likolo ya Edomi singa ya mobulu mpe nivo ya kozanga.


Kasi tala bato oyo bomengo na bango, babotola yango mpe babebisa bango ; bakanga bango nyonso na mabulu mpe babomba bango kati na boloko, bakoma lokola bomengo ya bitumba, bongo moto akokangola bango azali te ; bakoma lokola mosuni, bongo moto akoloba : « Zongisa bango, » azali te.


Isalaele azali lokola meme oyo ebungi nzela, oyo nkosi ezalaki kolanda : Mokonzi ya Asiri azalaki moto ya liboso oyo apasolaki Isalaele ; Nabukodonozori, Mokonzi ya Babiloni, azalaki moto ya suka oyo abukaki ye mikuwa.


Moto nyonso oyo azalaki komona bango azalaki koboma bango, banguna na bango bazalaki koloba : ‹ Tozali na biso na ngambo te, mpo ete basali masumu liboso ya Yawe oyo azali lokola lopango na bango ya bosembo ; liboso ya Yawe, elikya ya batata na bango. ›


Nakopesa Beli etumbu kati na Babiloni, nakobimisa ye eloko oyo ameli na monoko ; ekolo moko te ekoya lisusu epai na ye mpe bamir ya Babiloni ekokweya.


« Babiloni mpe esengeli kokweya, mpo na bana ya Isalaele oyo bakufaki, ndenge kaka bato ya mokili mobimba bakufaki mpo na Babiloni.


Tala ndenge nini engumba oyo, na kala, ezalaki na bato ebele penza, etikali lisusu na bato te ! Tala ndenge nini engumba oyo ezalaki na lokumu kati na bikolo ekomi lelo lokola mwasi akufisa mobali ; oyo ezalaki engumba mokonzi ekomi lelo na bowumbu !


Banguna na yo nyonso bafungoli minoko na bango mpo na kotiola yo, bazali koseka yo mpe kolia minu na bango ; bongo bazali koloba : « Tomeli ye ! Tala mokolo oyo tozalaki kozela ! Tokomi penza na mokolo yango mpe tomoni yango ! »


Yango wana, sakola ! Loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Lokola babebisaki bino mpe bapanzaki bino bipai nyonso mpo ete bokoma libula ya bikolo mosusu mpe eloko ya masolo ya kotiola mpe ya kofinga kati na bato ;


Isalaele abebisami ; tala bango wana kati na bikolo, bazali komonana lokola biloko pamba !


Boyoka makambo oyo, bino bato oyo bonyokolaka bato bakelela mpe bonyataka babola kati na mokili.


Tala, mobebisi azali koya kosala yo mabe ! Batela malamu bandako na yo batonga makasi, kengela nzela na yo, bongama mpo na bitumba mpe sangisa bato na yo.


Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale ! Bokangaka nzela mpo ete bato mosusu bakota te kati na Bokonzi ya Likolo ; bino moko, bozali kokota kuna te, kasi bozali lisusu kokanga nzela mpo ete bato oyo bazali na posa ya kokota bakota te. [


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ