Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 51:33 - Mokanda na Bomoi

33 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Elenge mwasi Babiloni azali lokola etando ya ble na tango banyataka-nyataka yango ; mpe etikali moke, tango ya kokata ble ekokoka mpo na yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 51:33
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpo ete liboso ya kobuka bambuma, tango bafololo ya mike etikaka kobima mpe ekomaka bambuma mibesu oyo ekomi pene ya kotela, bakataka bitape na likwangola, babwakaka mpe batiaka pembeni bitape.


Oh bato na ngai, babeti bino ndenge batutaka ble na libanda ! Nazali koyebisa bino makambo oyo nayokaki wuta epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga, wuta epai ya Nzambe ya Isalaele.


Kita mpe vanda na putulu, Babiloni, mboka kitoko ! Vanda na mabele, kiti ya bokonzi ezali te, Babiloni, mboka kitoko ! Moto moko te akobenga yo lisusu « mwasi bonzenga » to « mwasi kitoko. »


bakangi bapon mpe bibale ; banzete oyo ebotaka na mayi esili na kozika moto mpe basoda bakomi na somo. »


Yo mpe lisusu, Yuda, tango ya kobuka mbuma ebongisami mpo na yo, sima na Ngai kozongisa bomengo ya bato na Ngai.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ya masumu misato to minei ya Damasi, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te bakataki-kataki bato ya Galadi na nzela ya bibende oyo etimolaka mabele mpo na kosala bilanga.


Kasi bayebi makanisi na Yawe te mpe bazali kososola mabongisi na Ye te, Ye oyo asangisaki bango lokola maboke ya matiti ya ble na etando oyo batutelaka yango.


Oh Siona, mboka kitoko, telema mpe tuta ble, pamba te nakopesa yo maseke ya bibende mpe basapato ya bronze, bongo okobuka bikolo ebele mike-mike mpe okopesa bomengo na bango, oyo bazwaki na nzela ya mabe, lokola likabo epai na Yawe, mpe bozwi na bango epai na Mokonzi ya mokili mobimba.


Na kanda, otambolaka na mabele ; mpe na kanda makasi na Yo, onyataka bikolo.


Botika nyonso mibale ekola esika moko kino na tango ya kobuka bambuma. Ezali na tango wana nde nakoloba na bato oyo babukaka bambuma : Bolongola liboso matiti mabe, bokanga yango maboke-maboke mpe botumba yango ; kasi bobuka ble mpe botia yango na ebombelo na Ngai ya bambuma. › »


monguna oyo alonaki matiti mabe ezali Satana, tango ya kobuka mbuma ezali suka ya mokili ; bongo bato oyo babukaka bambuma, ezali ba-anjelu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ