Tala, bakozala solo lokola matiti ya kokawuka, matiti oyo moto ekotumba ; bakokoka kobikisa ata milimo na bango moko te na nguya ya moto : Ekozala lisusu te lokola makala ya moto mpo na koyetola to moto mpo na kovanda zingazinga na yango.
Basoda ya Babiloni batiki kobunda, babombami kati na bandako batonga makasi. Makasi na bango esili, bakomi lokola basi. Bandako ya Babiloni etumbami mpe babuki bikangelo bikuke na yango.
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Elenge mwasi Babiloni azali lokola etando ya ble na tango banyataka-nyataka yango ; mpe etikali moke, tango ya kokata ble ekokoka mpo na yango.
bongo lokola lidusu moko efungwamaki kati na mir ya engumba, basoda nyonso ya Yuda bakimaki butu-butu mpe babimelaki na ekuke oyo ezalaki na kati-kati ya bamir mibale, pene ya elanga ya mokonzi, atako bato ya Babiloni bazingelaki engumba. Bakimaki na nzela ya lubwaku ya Yordani.