Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 51:29 - Mokanda na Bomoi

29 Mikili ezali koningana mpe kotepatepa, pamba te mikano ya Yawe mpo na Babiloni ezali kokokisama mpo na kobebisa yango mpo ete, ata moto moko te atikala kovanda lisusu kuna.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 51:29
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato oyo bazali komona yo batie miso na bango epai na yo, bazali komituna : ‹ Boni, ezali penza ye oyo azalaki koningisa mokili mpe kolengisa bikolo ?


Mokili ekomi kotenga-tenga lokola moto oyo alangwe masanga, ezali koningana na mopepe lokola ndako ya matiti. Mokumba ya botomboki na ye ezali likolo na ye, esili kokweya mpe ekotelema lisusu te.


Kasi Yawe azali Nzambe ya solo, Nzambe na bomoi mpe Mokonzi ya seko. Soki asiliki, mokili eninganaka, bikolo ekokoka te kotelema liboso ya kanda na Ye.


Likolo ya kanda ya Yawe, bato bakovanda lisusu na Babiloni te mpo ete ekobebisama nye. Bato nyonso oyo bakoleka na Babiloni bakokamwa mpe bakozala na somo ya komona bapota na yango nyonso.


‹ Mopanga, boma basakoli na yango ya lokuta ; tika ete bakoma bato ya maboma ! Mopanga, boma basoda na yango ya mpiko ; tika ete bakoma na somo !


Tango mokonzi ya Babiloni ayokaki sango na tina bango, alembaki nzoto, somo makasi ekangaki ye mpe akomaki na pasi lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota.


Yango wana, boyoka mabongisi oyo Yawe asili kosala mpo na Babiloni, mokano oyo asili kozwa mpo na kotelemela mokili ya bato ya Babiloni : Bakobengana bango na lopango lokola bana mike ya etonga, akobebisa etando na bango.


Na lokito ya kokweya ya mokili ya Babiloni, mabele ekoningana ; makelele na yango ekoyokana kino na bikolo mosusu.


Bakotikala lisusu te kozwa epai na yo libanga oyo batongelaka basonge ya bamir to libanga oyo batongelaka miboko ; pamba te okobebisama mpo na libela, » elobi Yawe.


Bobongisa bikolo mpo na kobundisa yango : bakonzi ya Medi, bayangeli na bango mpe bakalaka na bango nyonso mpe bamboka nyonso oyo bazali kokamba.


Mokili ya Babiloni ekokoma liboke ya mabanga, ndako ya mbwa ya zamba, eloko ya somo mpe ya kotiola ; bongo, bato bakovanda lisusu kuna te.


Bingumba na yango ekobebisama, ekokoma lokola mokili oyo ekawuka to lokola esobe, mokili oyo bato bavandaka te, mokili epai wapi bato bayaka na mibembo te.


Lokito ya bampunda ya banguna mpe makelele ya makolo na yango ezali koyokana wuta na Dani, ezali koya mpo na kobebisa mokili mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango, engumba mpe bavandi na yango nyonso, bongo mokili mobimba eningani.


Mokili eninganaka liboso na bango, Lola elengaka, moyi mpe sanza eyindaka, minzoto etikaka kongenga.


Mpo na yango, mokili ekolenga, mpe bato na yango nyonso bakozala na matanga. Mokili mobimba ekotomboka lokola ebale Nili oyo etondi na mayi ; ekokoma koningana-ningana mpe ekokita lokola ebale ya Ejipito.


Agangaki na mongongo makasi : « Ekweyi ! Ekweyi ! Babiloni monene ekweyi penza ! Ekomi ndako ya milimo mabe, ebombamelo ya milimo nyonso ya mbindo, ya bandeke ya mbindo mpe ya banyama ya nkele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ