Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 51:26 - Mokanda na Bomoi

26 Bakotikala lisusu te kozwa epai na yo libanga oyo batongelaka basonge ya bamir to libanga oyo batongelaka miboko ; pamba te okobebisama mpo na libela, » elobi Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 51:26
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakokomisa yango esika ya potopoto mpe lopango ya bampuku ; mpe nakokombola yango na nzela ya ekombelo ya libebi, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Kasi soki mibu tuku sambo ekoki, nakopesa mokonzi ya Babiloni elongo na ekolo na ye mpe mokili ya bato ya Babiloni etumbu mpo na mabe oyo basalaki, » elobi Yawe, « mpe nakobebisa yango mpo na libela.


Mikili ezali koningana mpe kotepatepa, pamba te mikano ya Yawe mpo na Babiloni ezali kokokisama mpo na kobebisa yango mpo ete, ata moto moko te atikala kovanda lisusu kuna.


Mokili ya Babiloni ekokoma liboke ya mabanga, ndako ya mbwa ya zamba, eloko ya somo mpe ya kotiola ; bongo, bato bakovanda lisusu kuna te.


Bingumba na yango ekobebisama, ekokoma lokola mokili oyo ekawuka to lokola esobe, mokili oyo bato bavandaka te, mokili epai wapi bato bayaka na mibembo te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ