Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 51:24 - Mokanda na Bomoi

24 Nakozongisela Babiloni mpe bavandi na yango nyonso mabe nyonso oyo basalaki Siona, » elobi Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 51:24
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpo na nini bikolo eloba : « Nzambe na bango azali wapi ? » Tika ete, na miso na biso, bato ya bikolo bayeba ete ozongiseli bango mabe na mabe, mpo na makila ya basali na Yo, oyo basopaki.


Bino nyonso, boya elongo mpe boyoka : Nzambe nini ya ekeko asakolaki makambo oyo ? Moto oyo Yawe alingaka akokokisa mokano na Ye mpo na Babiloni, mpe loboko na ye ekotelemela bato ya Babiloni.


mpo na kosakola mpo na Yawe mobu ya ngolu, kosakola mpo na Nzambe na biso mokolo ya kozongisa mabe na mabe, kobondisa bato oyo bazali kolela,


Boyoka makelele kobima longwa na engumba, boyoka makelele kobima longwa na Tempelo ! Ezali nde mongongo na Yawe oyo azali kofuta banguna na Ye kolanda oyo ekoki na misala na bango.


Bango, bato ya Babiloni, bakokoma mpe bawumbu ya bikolo ebele mpe ya bakonzi ya nguya ; nakosalela bango kolanda etamboli mpe misala ya maboko na bango. »


Boye, bakobotola bomengo ya Babiloni mpe bato nyonso oyo bakobotola yango bakotonda, » elobi Yawe.


Bobetela ye lokito ya bitumba na bangambo nyonso ! Ayei komitika ye moko, mpo ete bandako na ye oyo batonga makasi ekweyi, bamir na ye ebukani : ezali na lolenge oyo nde Yawe azongiseli ye mabe na mabe. Bozongisela ye makambo oyo ye asalaki bikolo mosusu.


Bopelisa basonge ya makonga, bokamata banguba na bino ; pamba te Yawe atindi bakonzi ya Medi mpo ete mokano na Ye ezali ya kobebisa Babiloni. Yawe akozongisa mabe na mabe, akosala yango mpo na Tempelo na Ye.


elongo na yo, napanzaki babateli bibwele mpe bibwele na bango ; elongo na yo, napanzaki mosali bilanga mpe bangombe na ye ; elongo na yo, napanzaki bayangeli mpe bakalaka.


Tika ete mabe oyo basali biso mpe bana na biso ekweyela Babiloni, » elobi bavandi ya Siona ! « Tika ete makila na biso etangama na mito ya bavandi ya Babiloni, elobi bavandi ya Yelusalemi ! »


« Babiloni mpe esengeli kokweya, mpo na bana ya Isalaele oyo bakufaki, ndenge kaka bato ya mokili mobimba bakufaki mpo na Babiloni.


Mobebisi akoya kobundisa Babiloni ; bongo bakokanga basoda na yango ya mpiko mpe bakobuka matolotolo na bango, pamba te Yawe azali Nzambe oyo afutaka : afutaka kolanda misala ya moto na moto.


Yawe, pesa bango lifuti oyo ekoki na bango kolanda misala na bango ;


Likolo, sepela na libebi na yango ! Bino mpe basantu, bosepela ! Bino bantoma mpe basakoli, bosepela mpe lokola ! Pamba te Nzambe alongisi bino awa akateli yango etumbu. »


Kati na yo, emonanaki makila ya basakoli, ya basantu mpe ya bato nyonso oyo babomamaki na mokili. »


Bagangaki na mongongo makasi : « Nkolo Nzambe, Yo oyo ozali Bule mpe Solo, okozela kino tango nini mpo na kosambisa bavandi ya mokili mpe kopesa bango etumbu mpo na makila na biso ? »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ