Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 51:22 - Mokanda na Bomoi

22 elongo na yo, napanzaki mwasi mpe mobali ; elongo na yo, napanzaki mibange mpe bilenge ; elongo na yo, napanzaki bilenge mibali mpe bilenge basi ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 51:22
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, mpo na kobebisa bango, Yawe atindaki mokonzi ya bato ya Babiloni, oyo abomaki na mopanga bilenge na bango kati na esika na bango ya bule ; abikisaki te ezala elenge mobali, elenge mwasi, mokolo to mobange. Nzambe akabaki nyonso na maboko ya Nabukodonozori.


Bakotobola na likonga moto nyonso oyo bakokanga. Bato nyonso oyo bakozwa, bakokufa na mopanga.


Bakokata-kata bana na bango na biteni na miso na bango, bakobebisa bandako na bango mpe bakozwa basi na bango na makasi.


Boye, tolotolo na bango ekoboma bilenge mibali mpe bakoyokela mbuma ya libumu mawa te : liso na bango ekotala bana na mawa te.


mokonzi ya Asiri akomema bakangami ya Ejipito mpe bawumbu ya Kushi bolumbu mpe makolo ngulu : ezala bilenge to bampaka, bakotambola bolumbu mpe makolo ngulu mpo na soni ya Ejipito.


Sik’oyo tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga mpe Nzambe ya Isalaele, alobi : Mpo na nini bozali komimemela pasi ya makasi boye kino mokili ya Yuda ezangela mibali, basi, babebe mpe etikala lisusu ata na moto moko te ?


Mopanga, boma bampunda mpe bashar na yango, bapaya nyonso oyo bazali sima na yango mpo ete bakoma lokola basi ! Mopanga, bebisa bomengo na yango mpo ete ekoma bomengo ya bitumba !


elongo na yo, napanzaki babateli bibwele mpe bibwele na bango ; elongo na yo, napanzaki mosali bilanga mpe bangombe na ye ; elongo na yo, napanzaki bayangeli mpe bakalaka.


Nzokande ngai, natondi na kanda ya Yawe mpe nazali kokoka lisusu te kokanga motema. « Sopa yango na bana mike kati na babalabala mpe na lisanga ya bilenge mibali ; ekokweyela mwasi mpe mobali nzela moko, ezala mikolo to mibange.


Miso na ngai elembi kobimisa mpinzoli, nazali komitungisa, libumu na ngai ezali kobaluka, motema na ngai ezali kotungisama mpo ete bato na ngai babebisami, mpo ete bana mpe bana oyo bazali komela mabele balembi-lembi banzoto na balabala ya engumba.


Bibembe ya bilenge mpe ya mikolo elali-lali na babalabala ; basali na ngai ya mibali mpe ya basi bakufi na mopanga ! Obomi bango na mokolo ya kanda na Yo ; obomi bango na mawa te !


Boboma bampaka, bilenge, basali ya mibali, basali ya basi mpe bana mike ; kasi bomeka kosimba te moto nyonso oyo azali na elembo na elongi. Bobanda na Esika na Ngai ya bule ! » Boye babandaki na bampaka oyo bazalaki liboso ya Tempelo.


Na libanda, mopanga ekokomisa bango bato bazanga bana ; kati na bandako na bango, somo ekokonza ; bilenge mibali mpe bilenge basi, bana mike mpe bampaka, bango nyonso bakokufa.


Kende sik’oyo, bundisa bato ya Amaleki mpe bebisa penza biloko na bango nyonso. Kobatela bango te ; boma mibali mpe basi, bana mpe babebe, bangombe, bantaba mpe bameme, bashamo mpe ba-ane. › »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ