Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 51:20 - Mokanda na Bomoi

20 Ozalaki solo marto, ebundeli na Ngai ya bitumba : elongo na yo, napanzaki bikolo ; elongo na yo, nabebisaki mikili ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 51:20
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boni, epasola ekoki solo komimatisa liboso ya moto oyo asalelaka yango ; si ya mabaya ekoki solo komikumisa liboso ya moto oyo asalelaka yango ? Bosila komona fimbu koningisa moto oyo asalelaka yango to etape ya nzete kotombola nzete na yango ?


Mawa na Asiri, lingenda ya kanda na Ngai ; nzete oyo ezali na loboko na ye ezali nde esalelo ya kanda na Ngai !


Bawuti na mikili ya mosika, na suka ya likolo ; Yawe elongo na bisalelo ya kanda na Ye ; mpo na kobebisa mokili mobimba.


Oyoka nanu yango te ? Nasalaki mabongisi ya makambo oyo wuta kala, nabongisaki yango wuta na mikolo oyo eleka kala ; sik’oyo nde nakokisi yango. Esengeli na yo kokomisa bingumba ya makasi mipiku ya mabanga.


« Tala liloba oyo Yawe alobi epai ya Sirisi, mopakolami na Ye, oyo Yawe asimbi loboko na ye ya mobali mpo na kokweyisa bikolo nyonso liboso na ye mpe kolongola mikaba wuta na baloketo ya bakonzi, mpo na kofungola bikuke liboso na ye mpo ete bikuke yango ekangama te :


Bino bikolo, boganga na somo mpe bopalangana ! Bino bituka nyonso ya mosika, boyoka ! Bobongama mpo na bitumba mpe bopalangana ! Bobongama mpo na bitumba mpe bopalangana !


Mokili oyo mobimba ekobebisama mpe ekotikala lisusu na bato te ; mpe bikolo oyo ekosalela mokonzi ya Babiloni mibu tuku sambo.


nakobengisa bato nyonso ya bikolo ya nor mpe mosali na Ngai, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, » elobi Yawe, « nakosala ete babundisa mokili oyo, bavandi na yango mpe bikolo nyonso ya zingazinga. Nakobebisa bango penza mpe nakokomisa bango eloko ya somo mpe ya kotiola ; boye bakotikala seko na seko libebi.


Ndenge nini marto oyo ezalaki kobeta mokili mobimba ebukani mpe epanzani ? Ndenge nini penza Babiloni ebebisami kati na bikolo ?


Yango wana, mwana na moto, lela ! Kende kolela liboso na bango, na motema oyo ebukani mpe ya mawa.


Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Longola ye eteni ya elamba ya moto, longola ye motole ! Makambo ekobongwana, ekozala lisusu te ndenge ezalaki liboso ! Bato oyo bakitisama bakotombwama, mpe ba-oyo batombwama bakokitisama.


Kasi bayebi makanisi na Yawe te mpe bazali kososola mabongisi na Ye te, Ye oyo asangisaki bango lokola maboke ya matiti ya ble na etando oyo batutelaka yango.


Oh Siona, mboka kitoko, telema mpe tuta ble, pamba te nakopesa yo maseke ya bibende mpe basapato ya bronze, bongo okobuka bikolo ebele mike-mike mpe okopesa bomengo na bango, oyo bazwaki na nzela ya mabe, lokola likabo epai na Yawe, mpe bozwi na bango epai na Mokonzi ya mokili mobimba.


Botala kuna na bangomba makolo ya momemi sango malamu : amemi sango ya kimia ! Oh mokili ya Yuda, sepela na bafeti na yo mpe kokisa ndayi na yo ; pamba te wuta sik’oyo, moto mabe moko te akokota lisusu epai na yo ; pamba te bango nyonso bakobebisama nye.


Na Yuda nde ekobimela libanga ya songe ya ndako, likonzi ya ndako ya kapo, tolotolo ya bitumba mpe bakambi nyonso.


Mokonzi asilikaki makasi, atindaki basoda na ye koboma babomi wana mpe kotumba engumba na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ