Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 51:2 - Mokanda na Bomoi

2 Nakotinda bapaya na Babiloni mpo na koyungola mpe kobebisa yango : bakobundisa yango na bangambo nyonso na mokolo na yango ya kosambisama.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 51:2
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

okoyungola yango, mpe mopepe ekomema yango, mopepe makasi ekopanza yango. Kasi yo, okosepela kati na Yawe, okozwa lokumu kati na Mosantu ya Isalaele.


Tala liloba oyo Yawe, Mosikoli na bino, Mosantu ya Isalaele, alobi : « Mpo na likambo na bino, nakotinda na Babiloni, mampinga ya basoda, mpe nakokitisa bato nyonso ya Babiloni lokola bakimi, ezala bato ya Chalide oyo bamikumisaka na koganga mpo na bamasuwa na bango.


Nakoyungola bango na nzela ya bipepelo na bikuke ya engumba, nakobotola bango bana na bango mpe nakoboma bato na Ngai, pamba te babongoli bizaleli na bango te.


Bosangisa bato nyonso oyo babundaka na matolotolo mpo na kotelemela Babiloni ; tika ete bato nyonso oyo babundaka na makonga bazingela Babiloni mobimba, basala ete ata moto moko te akima, bafuta yango ndenge ezalaki misala na yango mpe bazongisela yango makambo oyo esalaki bikolo mosusu ; pamba te ebetaki tembe na Yawe, Mosantu ya Isalaele.


Ekolo ya lolendo ekobeta libaku mpe ekokweya, mpe moto moko te akoya kosunga yango ; nakopelisa moto kati na bingumba na yango, mpe moto yango ekozikisa bato nyonso oyo bazingeli yango. ›


Ndambo moko kati na bandambo misato ya bato na yo bakokufa na bokono oyo ebomaka to na nzala makasi kati na bamir na yo ; mpe ndambo moko kati na bandambo misato mosusu bakokufa na mopanga na libanda ya bamir na yo. Bongo, nakopanza ndambo moko kati na bandambo misato mosusu, na bisika mosusu mpe nakolanda bango na mopanga.


Asimbi kiyungulu na loboko na Ye, akopetola etando na Ye mpo na koyamba ble kati na ebombelo na Ye ; kasi akotumba kati na moto oyo ekufaka te, matiti oyo ekotikala. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ