Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 51:19 - Mokanda na Bomoi

19 Ye oyo azali libula ya Jakobi akokani na bikeko wana te, pamba te azali Mokeli ya biloko nyonso, ezala ata ekolo oyo ezali libula na Ye ; Kombo na Ye ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 51:19
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzambe na biso azali na Lola, asalaka nyonso oyo alingi.


Pamba te Yawe aponaki Jakobi, Isalaele, mpo ete azala ya Ye moko.


Yawe, Yo moko kaka nde ozali libula mpe bomoi na ngai ; ozali ndanga ya bozwi na ngai.


Esengo na ekolo oyo Yawe azali Nzambe na yango. Esengo na bato oyo aponaki mpo na libula na Ye.


Nzoto na ngai ekoki kobeba, mpe motema na ngai ekoki kolemba ; kasi Nzambe azali Libanga mpe libula na ngai mpo na tango nyonso.


Kanisa lisusu lisanga ya bato na Yo, oyo osikola wuta kala, libota oyo okomisa libula na Yo. Kanisa ngomba Siona epai wapi ovandaka.


Mosikoli na biso, Kombo na Ye : Yawe, Mokonzi ya mampinga, Mosantu ya Isalaele.


Ozali mpe kobosana Yawe, Mokeli na Yo, oyo atandaki likolo ndenge batandaka liputa mpe atongaki miboko ya mabele, mpo ete okoma kobika mikolo nyonso na kobanga liboso ya kanda ya banyokoli oyo babongisami mpo na kobebisama ? Pamba te, wapi kanda ya banyokoli ?


Kasi Yawe asala mabele na nguya na Ye, alendisa mokili na bwanya na Ye mpe atanda likolo na mayele na Ye.


Kasi Ye oyo azali libula ya Jakobi akokani na bikeko wana te, pamba te azali Mokeli ya biloko nyonso, ezala ata Isalaele, ekolo oyo ezali libula na Ye ; Kombo na Ye ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga.


« Tala liloba oyo Yawe, Ye oyo akela mabele, oyo abongisa yango malamu mpe alendisa yango, oyo Kombo na Ye ezali Yawe, alobi :


« Mpo ete bozali kosepela mpe bozali na esengo, bino bato oyo bozali kobebisa libula na Ngai ; mpo ete bozali kopumbwa-pumbwa lokola mwana ngombe ya mwasi oyo ezali konika ble mpe kolela lokola bampunda,


Nzokande, Mosikoli na bango azali na makasi, Kombo na Ye : Yawe, Mokonzi ya mampinga ; akokotela bango na molende mpo ete amema kimia na mokili na bango mpe mobulu epai ya bavandi ya Babiloni.


Ata soki mokili na bango etondaki na masumu liboso ya Mosantu ya Isalaele, Nzambe na bango, Yawe, Mokonzi ya mampinga, abosanaki Isalaele na Yuda te.


Namilobeli : « Yawe azali elikya na ngai ; yango wana nakotia motema epai na Ye. »


Pamba te eteni ya Yawe ezali bato na Ye ; Jakobi azali libula na Ye.


Kasi bino bozali libota oyo eponama, Banganga-Nzambe ya Mokonzi, ekolo ya bule mpe basikolami ya Nzambe mpo na kosakola misala minene ya Ye oyo abenga bino mpo ete bolongwa na molili mpe bokota kati na pole na Ye ya kokamwa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ