Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 51:14 - Mokanda na Bomoi

14 Yawe, Mokonzi ya mampinga, alapi ndayi na Kombo na Ye moko : Solo, nakotondisa yo na bato lokola liboke ya mabanki, bongo bakobeta milolo ya elonga likolo na yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 51:14
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na mitindo na Ye, mabanki mpe makelele oyo bakokaki kotanga te esopanaki,


Kasi mpo na yango, boyoka Liloba na Yawe, bino Bayuda nyonso oyo bozali kovanda kati na Ejipito : « Tala, nalapi ndayi na Kombo na Ngai ya monene, » elobi Yawe, « moto moko te oyo awuta na mokili ya Yuda, bongo avandi na esika songolo ya Ejipito, akobelela to mpe akolapa ndayi na Kombo na Ngai, na koloba : ‹ Lokola Nkolo Yawe azali na bomoi ! ›


Bakokata banzete nyonso ya zamba na yango, » elobi Yawe, « ata soki ezali na banzete ebele. Bazali ebele koleka mabanki, bakokoka kotanga motango na bango te.


Nalapi ndayi na Kombo na Ngai, » elobi Yawe, « Botsira ekobebisama mpe ekokoma eloko ya somo, eloko ya kotiola mpe ya lisuma ; mpe bingumba na yango nyonso ekobebisama mpo na libela. »


Bobetela ye lokito ya bitumba na bangambo nyonso ! Ayei komitika ye moko, mpo ete bandako na ye oyo batonga makasi ekweyi, bamir na ye ebukani : ezali na lolenge oyo nde Yawe azongiseli ye mabe na mabe. Bozongisela ye makambo oyo ye asalaki bikolo mosusu.


« Botelemisa bendele kati na mokili ! Bobeta kelelo kati na bikolo ! Bobongisa bikolo mpo na kobundisa Babiloni, bobenga bakonzi ya basoda ya mikili ya Ararati, ya Mini mpe ya Ashikenazi mpo ete babundisa yango. Bopona mokonzi moko ya basoda mpo ete atambolisa bitumba, botinda bampunda lokola liboke ya mabanki.


Nakozongisela bino mibu oyo mampinga minene ya mankoko, ya makelele, ya mabanki minene mpe ya bambinzo eliaki : mampinga minene na Ngai oyo natindaki mpo na kobundisa bino.


Nkolo Yawe alapi ndayi na Kombo na Ye moko ; Yawe, Nzambe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Nazali na somo ya lolendo ya Jakobi, nayini bandako na ye, oyo batonga makasi ; nakokaba engumba elongo na biloko na yango nyonso. »


Tango Nzambe apesaki Abrayami elaka, akataki seleka na Kombo na Ye moko, pamba te ezali na moto moko te oyo aleki Nzambe mpo ete Ye Nzambe akata seleka na kombo na ye.


Bazalaki komata ebele lokola mabanki elongo na bibwele na bango mpe bandako na bango ya kapo. Ezalaki pasi mpo na kotanga motango ya bato mpe ya bashamo na bango ; bazalaki kokota na mokili ya Isalaele mpo na kobebisa yango nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ