Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 51:11 - Mokanda na Bomoi

11 Bopelisa basonge ya makonga, bokamata banguba na bino ; pamba te Yawe atindi bakonzi ya Medi mpo ete mokano na Ye ezali ya kobebisa Babiloni. Yawe akozongisa mabe na mabe, akosala yango mpo na Tempelo na Ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 51:11
39 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe abimisaki monguna moko mpo na kobundisa Salomo : Adadi, moto ya Edomi, mwana kati na libota ya bokonzi ya Edomi.


Nzambe abimisaki monguna mosusu mpo na kobundisa Salomo ; kombo na ye : Rezoni. Rezoni Azalaki mwana mobali ya Eliyada, oyo akimaki nkolo na ye, Adadezeri, mokonzi ya Tsoba.


Yango wana Nzambe ya Isalaele alamusaki molimo ya Puli, mokonzi ya Asiri, mpe molimo ya Tigilati-Pilezeri, mokonzi ya Asiri, mpo na komema na bowumbu : bato ya libota ya Ribeni, ya libota ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase. Amemaki bango na Ala, na Abori, na Ara mpe na ngambo ya ebale Gozani, epai wapi bazali kovanda kino lelo.


Na mobu ya liboso ya Sirisi, mokonzi ya Persi, Yawe alamusaki molimo ya Sirisi, mokonzi ya Persi, mpo na kokokisa liloba oyo alobaki na nzela ya mosakoli Jeremi mpo ete asakola mpe akoma boye kati na mokili na ye mobimba :


Na mobu ya liboso ya Sirisi, mokonzi ya Persi, Yawe alamusaki molimo ya Sirisi, mokonzi ya Persi, mpo na kokokisa liloba oyo alobaki na nzela ya mosakoli Jeremi, mpo ete asakola mpe akoma boye kati na mokili na ye mobimba :


Yawe, Mokonzi ya mampinga, akotombola fimbu mpo na kobeta Asiri ndenge abetaki Madiani na libanga ya Orebi. Mpe lisusu, akotombola nzete na Ye likolo ya ebale monene lokola na Ejipito.


Namonaki emoniseli moko ya somo : Moteki baninga azali koteka baninga, mobebisi azali kobebisa. Elami, bundisa bango ! Medi, zingela bango ! Nakosukisa kolela nyonso oyo ayeisaki na bato.


Mesa ebongisami, batandi bilamba ya mesa, bazali kolia mpe komela ! Bino bakonzi ya basoda, bopakola banguba na bino mafuta !


Nabimisaki moto moko wuta na ngambo ya nor, mpe azali koya, moto moko, wuta na ngambo ya este, oyo abelelaka Kombo na Ngai. Azali konyata bakambi ndenge banyataka potopoto, lokola potopoto ya mabele ya bikeko ya mosali mbeki.


« Tala liloba oyo Yawe alobi epai ya Sirisi, mopakolami na Ye, oyo Yawe asimbi loboko na ye ya mobali mpo na kokweyisa bikolo nyonso liboso na ye mpe kolongola mikaba wuta na baloketo ya bakonzi, mpo na kofungola bikuke liboso na ye mpo ete bikuke yango ekangama te :


Nazali Yawe, mosusu azali te ; Nzambe mosusu azali te, soki Ngai te. Nalatisi yo mokaba na loketo atako oyebi Ngai nanu te ;


Wuta na este, nabengi ndeke oyo eliaka misuni ; longwa na mokili ya mosika, moto oyo akokokisa mabongisi na Ngai. Makambo oyo nalobaki, yango nde ekokokisama ; oyo nabongisaki, yango nde ekosalema.


bakonzi nyonso ya Zimiri, ya Elami mpe ya Medi ;


« Bobongisa banguba na bino : ya minene mpe ya mike, mpe bokende bitumba !


Bobongisa bampunda mpe bomata na bashar ! Bomitanda na milongo mpe bolata bikoti ya bitumba ! Bopelisa basonge ya makonga na bino mpe bolata bibundeli !


Bino bampunda, bokende ! Bino basoda oyo botambolaka likolo ya bashar, botambolisa mbangu ! Bino basoda, bato ya Kushi mpe ya Puti, oyo bomemaka banguba, mpe bino bato ya Ludi oyo bobundaka na matolotolo, bokende liboso !


Yawe afungolaki bibundeli na Ye nyonso mpe abimisaki kati na yango bibundeli ya kanda na Ye ; pamba te yango nde mosala oyo Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, asili kosala na mokili ya bato ya Babiloni.


Ekolo moko ekowuta na nor mpe ekobundisa Babiloni, ekobebisa yango, bongo moto moko te akovanda lisusu kuna ; ezala bato to banyama, nyonso ekokima.


Yango wana, boyoka mabongisi oyo Yawe asili kosala mpo na Babiloni, mokano oyo asili kozwa mpo na kotelemela mokili ya bato ya Babiloni : Bakobengana bango na lopango lokola bana mike ya etonga, akobebisa etando na bango.


Pamba te nakotelemisa mpe nakoyeisa lisanga ya bikolo ya nguya oyo ekowuta na mokili ya nor mpo na kobundisa Babiloni mpe kobotola yango wuta na nor ; makonga na bango ekozala lokola makonga ya basoda ya mpiko, oyo bazangaka koboma te.


Botelemisa bendele na bino liboso ya bamir ya Babiloni ! Bobakisa motango ya bakengeli mpe ya basinzili, botia mitambo ! Yawe akokokisa mabongisi na Ye mpe ekateli ya etumbu na Ye mpo na bato ya Babiloni.


Nakozongisela Babiloni mpe bavandi na yango nyonso mabe nyonso oyo basalaki Siona, » elobi Yawe.


Tika ete mabe oyo basali biso mpe bana na biso ekweyela Babiloni, » elobi bavandi ya Siona ! « Tika ete makila na biso etangama na mito ya bavandi ya Babiloni, elobi bavandi ya Yelusalemi ! »


Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi : « Tala, nakozwa likambo na yo na maboko mpe nakozongisa mabe na bato oyo basalaki yo mabe, nakokawusa ebale na yango ya monene mpe nakokawusa maziba na yango.


Mpe kaka na butu wana, babomaki Balitazari, mokonzi ya bato ya Babiloni.


Nakopesa nzela na mopanga mpo ete eboma bino mpo na kozongisa mabe na mabe likolo ya boyokani oyo bino bobebisi. Tango bokosangana kati na bingumba na bino, nakotindela bino bokono oyo ebomaka, mpe nakokaba bino na maboko ya monguna.


Tala etumbu oyo Yawe akopesa na bikolo nyonso oyo ekobundisa Yelusalemi : Misuni ya banzoto na bango ekobanda kopola wana bazali nanu na bomoi ; miso na bango ekokufa na bilongi na bango mpe balolemo na bango ekokufa kati na minoko na bango.


Nakosangisa bikolo nyonso, na Yelusalemi, mpo ete babundisa engumba yango ; bakobotola yango, bakobuka bandako na yango, bakozwa basi na yango na makasi mpo na kobebisa lokumu na bango, mpe ndambo ya bato kati na yango bakokende na bowumbu, bongo ndambo mosusu ya bato bakotikala.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ