Boloba kati na Yelusalemi, boyebisa ye ete minyoko na ye ekomi na suka, masumu na ye esili kolimbisama, pamba te asili kozwa na loboko ya Yawe ngolu koleka mbala mibale mpo na masumu na ye nyonso.
Boye, bato oyo Yawe akangoli bakozonga, bakokota kati na Siona na banzembo ya esengo ; esengo ya libela na libela ekozala lokola motole na mito na bango ; bakotondisama na esengo mpe na kosepela, bongo pasi mpe minyoko ekokima mosika na bango.
Boyoka ! Tala bango bazali kokima mpe babiki wuta na mokili ya Babiloni mpo na koyebisa kati na Siona ndenge nini Yawe, Nzambe na biso, azongisi mabe na mabe ; ndenge nini azongisi mabe na mabe likolo na Tempelo na Ye.
Yango wana, boyoka mabongisi oyo Yawe asili kosala mpo na Babiloni, mokano oyo asili kozwa mpo na kotelemela mokili ya bato ya Babiloni : Bakobengana bango na lopango lokola bana mike ya etonga, akobebisa etando na bango.