Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 51:1 - Mokanda na Bomoi

1 Tala liloba oyo Yawe alobi : « Tala, nakotinda mopepe ya makasi mpo na kobebisa mokili ya Babiloni mpe bato ya Lebi-Kamayi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 51:1
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala, nakotia molimo moko kati na ye mpo ete, tango akoyoka sango ya makambo oyo ezali koleka na mboka na ye, azonga na mokili na ye ; mpe ekozala kuna, na mokili na ye, nde nakobomisa ye na mopanga. › »


Babiloni, engumba kitoko, yo oyo okobebisama solo, esengo na moto oyo akozongisela yo mabe na mabe oyo osalaki biso !


Yango wana nakolengisa likolo, mpe mabele ekoningana na bisimbelo na yango na kanda makasi ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, na mokolo oyo akopelisa kanda na Ye.


nakomata kino na likolo ya mapata, nakomikomisa lokola Ye-Oyo-Aleki-Likolo. ›


Maloba na Yawe na tina na esobe ya ebale monene : Ndenge mopepe makasi elekaka na somo na Negevi, monguna moko azali koya wuta na esobe, wuta na mokili moko ya somo.


Kita mpe vanda na putulu, Babiloni, mboka kitoko ! Vanda na mabele, kiti ya bokonzi ezali te, Babiloni, mboka kitoko ! Moto moko te akobenga yo lisusu « mwasi bonzenga » to « mwasi kitoko. »


Tala, mopepe makasi ya Yawe etomboki ! Kanda na Ye epeli lokola moto, bakake ezali konguluma mpe kokweyela bato mabe.


Nakotindela Elami mipepe minei ya makasi, wuta na basonge minei ya lola, nakopanza bango na mokili mobimba mpe akozala na ekolo moko te oyo ekozanga koyamba bato ya Elami oyo bakokima.


Bobundisa mokili ya Meratayimi mpe bavandi ya Pekodi ; bolanda bango, boboma mpe bobebisa bango nye, › elobi Yawe. ‹ Bosala makambo nyonso oyo natindi bino.


Oh Babiloni, nasili kotiela yo motambo, mpe ekangi yo liboso ete oyeba yango. Omonanaki mpe okangamaki mpo ete otelemelaki Yawe.


Bosangisa bato nyonso oyo babundaka na matolotolo mpo na kotelemela Babiloni ; tika ete bato nyonso oyo babundaka na makonga bazingela Babiloni mobimba, basala ete ata moto moko te akima, bafuta yango ndenge ezalaki misala na yango mpe bazongisela yango makambo oyo esalaki bikolo mosusu ; pamba te ebetaki tembe na Yawe, Mosantu ya Isalaele.


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Bazali konyokola bana ya Isalaele mpe bato ya Yuda ; bato nyonso oyo bakangaki bango mpe bamemaki bango na bowumbu baboyi kotika bango.


Pamba te nakotelemisa mpe nakoyeisa lisanga ya bikolo ya nguya oyo ekowuta na mokili ya nor mpo na kobundisa Babiloni mpe kobotola yango wuta na nor ; makonga na bango ekozala lokola makonga ya basoda ya mpiko, oyo bazangaka koboma te.


Ata soki mokili ya Babiloni emati kino na Lola mpe elendisi bandako na yango oyo batonga makasi, nakotindela yango bato mpo na kokweyisa yango, » elobi Yawe.


Jeremi akomaki kati na buku pasi nyonso oyo esengelaki kokomela Babiloni. Makambo wana nyonso ekomamaki na tina na mokili ya Babiloni.


Kasi bapikolaki yango na kanda mpe babwakaki yango na mabele. Mopepe ya este ekawusaki yango, ekweyisaki mbuma na yango, ekawusaki mpe bitape na yango ya makasi mpe moto etumbaki yango.


Ata Efrayimi azali kofuluka kati na bandeko na ye ya mibali, mopepe ya este ekoya, mopepe ya Yawe ekoya wuta na esobe : ekokawusa etima ya Efrayimi, ekokawusa liziba na ye. Monguna akobotola ye biloko nyonso ya talo wuta na ebombelo na yango. »


Boni, kelelo ya bitumba ekoki solo kobeta kati na engumba, bongo bato bazanga kobanga ? Pasi ekoki solo koya na engumba soki Yawe atindi yango te ?


mpe alobaki na ye : — Kima mbangu penza, mpe kende koloba na elenge mobali wana : « Yelusalemi ekotikala lisusu na bamir te mpo ete motango ya bato mpe ya banyama oyo bazali kati na yango ekokoma ebele koleka.


Akweyaki na mabele mpe ayokaki mongongo moko koloba na ye : — Saulo, Saulo, mpo na nini ozali konyokola Ngai ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ