Jeremi 50:9 - Mokanda na Bomoi9 Pamba te nakotelemisa mpe nakoyeisa lisanga ya bikolo ya nguya oyo ekowuta na mokili ya nor mpo na kobundisa Babiloni mpe kobotola yango wuta na nor ; makonga na bango ekozala lokola makonga ya basoda ya mpiko, oyo bazangaka koboma te. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bosangisa bato nyonso oyo babundaka na matolotolo mpo na kotelemela Babiloni ; tika ete bato nyonso oyo babundaka na makonga bazingela Babiloni mobimba, basala ete ata moto moko te akima, bafuta yango ndenge ezalaki misala na yango mpe bazongisela yango makambo oyo esalaki bikolo mosusu ; pamba te ebetaki tembe na Yawe, Mosantu ya Isalaele.