Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 50:7 - Mokanda na Bomoi

7 Moto nyonso oyo azalaki komona bango azalaki koboma bango, banguna na bango bazalaki koloba : ‹ Tozali na biso na ngambo te, mpo ete basali masumu liboso ya Yawe oyo azali lokola lopango na bango ya bosembo ; liboso ya Yawe, elikya ya batata na bango. ›

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 50:7
28 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nkolo Yawe, ozali elikya na ngai ; wuta bolenge na ngai, namipesaka na Yo.


pamba te babebisi Jakobi mpe bapanzi mokili na ye.


Losambo ya Moyize, moto na Nzambe. Oh Nkolo, ozalaki ekimelo na biso, na bikeke nyonso.


Moto oyo awumelaka kati na ebombamelo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo avandaka na se ya bobatelami ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.


Nasilikelaki bato na Ngai, nasambwisaki libula na Ngai ; nakabaki bango na maboko na yo, mpe oyokelaki bango mawa te ; bongo omemisaki ata mibange ekangiseli ya kilo makasi.


Bino banyama nyonso ya esobe, boya ; bino banyama nyonso ya zamba, boya kolia !


Kasi atako bongo, bato bazongaki kaka te epai na Yawe oyo abetaki bango, mpe balukaki te Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Sopa kanda na Yo likolo ya bikolo ya bapaya oyo endimaka Yo te, likolo ya bato oyo babelelaka Kombo na Yo te, pamba te babebisi Jakobi, babebisi ye mobimba mpe bapanzi mokili na ye.


Oh Elikya ya Isalaele, Mobikisi na ye na tango ya pasi, mpo na nini ozali kosala makambo lokola mopaya kati na mboka oyo to lokola moleki nzela oyo atelemaka kaka na mboka mpo na kolekisa butu ?


Oh Yawe, Elikya ya Isalaele, bato nyonso oyo basundolaka Yo bakufaka soni, bato oyo bapesaka yo mokongo bakufaka, pamba te basundoli Yawe, Etima ya mayi na bomoi.


Isalaele abulisamaki mpo na Yawe lokola mbuma ya liboso ya milona na Ye : moto nyonso oyo azalaki kolia yango azalaki komema ngambo, mpe pasi ezalaki kokomela ye, › » elobi Yawe.


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Tango nakobimisa bango na bowumbu, tala lisusu maloba oyo bato bakoloba kati na Yuda mpe kati na bingumba na yango : ‹ Oh ndako ya bosembo ; oh ngomba ya bule, tika ete Yawe apambola yo ! ›


Na mikolo yango mpe na tango yango, nakobimisa Moto ya nzete ya sembo wuta na libota ya Davidi ; akosala makambo ya sembo mpe ya boyengebene kati na mokili.


Na mikolo wana, Yuda ekobikisama, mpe Yelusalemi ekozala na kimia. Tala kombo oyo bakobengela yango : Yawe azali Bosembo na biso. ›


Bakobotola milona mpe bilei na yo, bakoboma bana na yo ya basi mpe ya mibali, bakobotola bangombe mpe bameme na yo, bakobebisa bilanga na yo ya vino mpe banzete na yo ya figi, bakobebisa na mopanga bingumba na yo ya makasi oyo otielaka motema.


Bino bato nyonso oyo bobundaka na matolotolo, bomitanda na molongo zingazinga ya Babiloni mpe bobeta yango makonga ! Botika ata likonga moko te, pamba te Babiloni asali masumu liboso ya Yawe.


Isalaele azali lokola meme oyo ebungi nzela, oyo nkosi ezalaki kolanda : Mokonzi ya Asiri azalaki moto ya liboso oyo apasolaki Isalaele ; Nabukodonozori, Mokonzi ya Babiloni, azalaki moto ya suka oyo abukaki ye mikuwa.


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Bazali konyokola bana ya Isalaele mpe bato ya Yuda ; bato nyonso oyo bakangaki bango mpe bamemaki bango na bowumbu baboyi kotika bango.


Boye, bibwele na Ngai epanzanaki bipai na bipai mpe ekomaki bilei ya banyama ya zamba, pamba te moto akobatela yango azalaki lisusu te.


Boye, okoyeba solo ete Ngai Yawe, nayokaki maloba nyonso ya kotiola oyo olobaki na tina na bangomba ya Isalaele. Olobaki : ‘ Tala, bangomba ebebisami ! Bakabeli biso yango lokola nyama ya kolia ! ’


Nkolo, nabondeli Yo, kolanda makambo nyonso oyo osalaka mpo na bosembo, kanda mpe kotomboka na Yo ezali kolongwa kati na engumba na Yo, Yelusalemi, ngomba na Yo ya bule ! likolo ya masumu na biso mpe ya mabe ya bakoko na biso, Yelusalemi mpe bato na Yo bakomi eloko ya liseki na miso ya bato nyonso oyo bazingeli biso.


Toyokelaki te basali na Yo, basakoli, oyo balobaki na Kombo na Yo epai ya bakonzi na biso, bakambi na biso, bakoko na biso mpe epai ya bato nyonso ya mokili.


Kasi nazali na kanda makasi mpo na bikolo oyo emonaka ete emikoka. Nazalaki kaka na kanda moke mpo na bato na Ngai, kasi bango bayei nde kobakisela bato na Ngai pasi. › »


Bato oyo basombaka bibwele yango babomaka yango, bazalaka na somo ya etumbu ata moko te. Bato oyo batekaka yango balobaka : « Tika ete Yawe apambolama, pamba te nakomi mozwi ! » Mpe bango moko babateli na yango bayokelaka yango mawa ata moke te.


Polo, ntoma ya Yesu-Klisto kolanda mokano ya Nzambe Mobikisi na biso mpe ntoma ya Yesu-Klisto, elikya na biso ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ