Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 50:46 - Mokanda na Bomoi

46 Na lokito ya kokweya ya mokili ya Babiloni, mabele ekoningana ; makelele na yango ekoyokana kino na bikolo mosusu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 50:46
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nazali kolela na se ya motema mpo na Moabi, banguna na ye bazali kokima kino na Tsoari, kino na Egilati-Shelishiya ; bazali komata na nzela ya Luyiti na kolela ; mpe na nzela ya Oronayimi, bazali kosala matanga mpo na kobebisama na bango.


Nzokande, elanga ya vino ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, ezali nde libota ya Isalaele, mpe bato ya Yuda bazali elanga oyo ezalaki kosepelisa Ye. Azalaki kozela bosembo, kasi amonaki nde makila ; makambo ya alima, kasi ayokaki nde kolela ya pasi.


Kasi Yawe azali Nzambe ya solo, Nzambe na bomoi mpe Mokonzi ya seko. Soki asiliki, mokili eninganaka, bikolo ekokoka te kotelema liboso ya kanda na Ye.


Bikolo ya bapaya ekoyoka sango ya soni na yo, makelele ya koganga na yo ekotondisa mabele. Soda moko akotutana na soda mosusu, mpe bango mibale bakokweya nzela moko. »


Ndenge nkosi eyaka wuta na bazamba ya Yordani mpo na kokende na mapango epai wapi babokolaka bibwele, ndenge wana mpe nakobengana Edomi na mokili na yango na mbala moko ; Ngai moko nakopona moto oyo akokoma mokonzi ya Edomi. Nani akokani na Ngai ? Nani akoki kobeta tembe na Ngai ? Mobateli bibwele nani akoki kotelema liboso na Ngai ?


Mabele ekoningana na lokito ya kokweya na bango, makelele na yango ekoyokana kino na ebale monene ya Barozo.


Mikili ezali koningana mpe kotepatepa, pamba te mikano ya Yawe mpo na Babiloni ezali kokokisama mpo na kobebisa yango mpo ete, ata moto moko te atikala kovanda lisusu kuna.


« Makelele ya koganga ekoyokana, wuta na mokili ya Babiloni, lokito makasi ya kobebisama ya mokili ya bato ya Babiloni.


Sik’oyo bisanga ekomi kolenga, na mokolo ya kokweya na yo, bisanga ya ebale monene ekomi na somo makasi mpo na suka na yo. ›


Tango baluki nkayi na yo bakoganga, bituka ya ngambo ya ebale monene ekolenga na somo.


Nalengisaki bikolo na lokito ya kokweya na yango, tango nakitisaki yango na mboka ya bakufi elongo na bato oyo bakitaka na libulu ya kufa. Boye, banzete nyonso ya Edeni, oyo eleki kitoko, mpe banzete ya Libani, oyo eleki kitoko, banzete nyonso oyo ezalaki kozwa mayi malamu, ebondisamaki na se ya mabele.


Nakosala ete bato ya bikolo ebele bakamwa yo mpe bakonzi na bango balenga na somo likolo na yo tango nakolakisa bango mopanga na Ngai. Na mokolo ya kokweya na yo, moko na moko kati na bango akokoma kolenga tango nyonso mpo na bomoi na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ