Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 50:44 - Mokanda na Bomoi

44 Ndenge nkosi eyaka wuta na bazamba ya Yordani mpo na kokende na mapango epai wapi babokolaka bibwele, ndenge wana mpe nakobengana Babiloni na mokili na yango na mbala moko ; Ngai moko nakopona moto oyo akokoma mokonzi ya Babiloni. Nani akokani na Ngai ? Nani akoki kobeta tembe na Ngai ? Mobateli bibwele nani akoki kotelema liboso na Ngai ? »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 50:44
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe, Lola esanzolaka misala na Yo ya kokamwa mpe bosembo na Yo kati na lisanga ya basantu.


Azali Nzambe ya somo kati na lisanga ya basantu ; solo, azali somo koleka ba-oyo nyonso bazingeli Ye.


Oh Yawe, nani kati na banzambe azali lokola Yo ? Nani azali lokola Yo, kitoko makasi kati na bosantu, somo, mpe abongi na lokumu, mpe asalaka makambo ya kokamwa ?


Bolingi kokokanisa Nzambe na nani ? Bolingi kokokanisa Ye na elilingi nini ?


« Bolingi kokokanisa Ngai na nani ? Bolingi kotia Ngai esika moko na nani, » elobi Ye oyo azali Mosantu ?


Nabimisaki moto moko wuta na ngambo ya nor, mpe azali koya, moto moko, wuta na ngambo ya este, oyo abelelaka Kombo na Ngai. Azali konyata bakambi ndenge banyataka potopoto, lokola potopoto ya mabele ya bikeko ya mosali mbeki.


« Bozali batatoli na Ngai, » elobi Yawe, « mpe mosali na Ngai, oyo naponi, mpo ete bokoka koyeba, kondimela Ngai mpe kososola ete Ngai moko kaka nde nazali Nzambe : Liboso na Ngai, nzambe moko te asila kosalema ; mpe sima na Ngai, akotikala kozala te.


Wuta na este, nabengi ndeke oyo eliaka misuni ; longwa na mokili ya mosika, moto oyo akokokisa mabongisi na Ngai. Makambo oyo nalobaki, yango nde ekokokisama ; oyo nabongisaki, yango nde ekosalema.


Bokanisa lisusu makambo ya liboso, makambo oyo ya kala penza ; solo, Ngai nazali Nzambe, mpe mosusu azali te, nazali Nzambe, moko te akokani na Ngai.


Bino nyonso, boya elongo mpe boyoka : Nzambe nini ya ekeko asakolaki makambo oyo ? Moto oyo Yawe alingaka akokokisa mokano na Ye mpo na Babiloni, mpe loboko na ye ekotelemela bato ya Babiloni.


Soki ozali kosala momekano ya kokima mbangu elongo na bato oyo bazali kotambola na makolo, mpe bango bazali komelisa yo pema, ndenge nini okoki komekana na bato oyo batambolaka likolo ya bampunda ? Soki ozali komitungisa na mokili oyo ezali na kimia, ekozala boni liboso ya mpela ya ebale Yordani ?


Lokola nkosi etikaka ndako na yango, mokili na bango mpe ekotikala lisusu na bato te likolo ya mopanga ya banyokoli na bango mpe likolo ya kanda ya Yawe.


Mokonzi na bango akowuta kati na bango, mpe mokambi na bango akowuta kaka kati na bango ; nakobenda bango pene na Ngai mpe bakoya pene na Ngai, pamba te nani azali na nguya ya kopusana pene na Ngai ? › elobi Yawe.


Bobetela ye lokito ya bitumba na bangambo nyonso ! Ayei komitika ye moko, mpo ete bandako na ye oyo batonga makasi ekweyi, bamir na ye ebukani : ezali na lolenge oyo nde Yawe azongiseli ye mabe na mabe. Bozongisela ye makambo oyo ye asalaki bikolo mosusu.


Boyoka ndenge babateli bibwele bazali kolela, pamba te bitando epai wapi baleisaka bibwele ebebisami. Boyoka ndenge bankosi ezali koganga, pamba te zamba ya Yordani, oyo etonda na banzete, esili kobebisama.


Alobaki na Kore mpe na bato na ye nyonso oyo balandaki ye : — Lobi na tongo, Yawe akolakisa nani azali moto na Ye mpe nani oyo azali bule, mpe akotika ye kopusana pene na Ye ; akotika solo moponami na Ye kopusana pene na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ