Jeremi 50:42 - Mokanda na Bomoi42 Basimbi matolotolo mpe makonga, bazali bato na kanza mpe bazanga mawa, bazali koganga lokola makelele ya ebale monene, bamati likolo ya bampunda, batandami na milongo lokola basoda mpo na kobundisa yo Babiloni, mboka kitoko ! အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
« Botelemisa bendele kati na mokili ! Bobeta kelelo kati na bikolo ! Bobongisa bikolo mpo na kobundisa Babiloni, bobenga bakonzi ya basoda ya mikili ya Ararati, ya Mini mpe ya Ashikenazi mpo ete babundisa yango. Bopona mokonzi moko ya basoda mpo ete atambolisa bitumba, botinda bampunda lokola liboke ya mabanki.