39 Bikelamu ya esobe mpe bambwa ya zamba ekokoma kovanda kuna ; maligbanga mpe ekokoma kovanda kuna. Bato bakovanda lisusu kuna te to moto moko te akotikala kuna mpo na libela.
Kasi soki mibu tuku sambo ekoki, nakopesa mokonzi ya Babiloni elongo na ekolo na ye mpe mokili ya bato ya Babiloni etumbu mpo na mabe oyo basalaki, » elobi Yawe, « mpe nakobebisa yango mpo na libela.
Bakotikala lisusu te kozwa epai na yo libanga oyo batongelaka basonge ya bamir to libanga oyo batongelaka miboko ; pamba te okobebisama mpo na libela, » elobi Yawe.
Agangaki na mongongo makasi : « Ekweyi ! Ekweyi ! Babiloni monene ekweyi penza ! Ekomi ndako ya milimo mabe, ebombamelo ya milimo nyonso ya mbindo, ya bandeke ya mbindo mpe ya banyama ya nkele.