Na mokolo wana, bato ya Ejipito bakokoma lokola basi. Bakolenga na somo na koningana ya loboko oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, atomboli mpo na kotelemela bango.
Nakopesa yo bomengo oyo babomba na molili, bozwi oyo batia na bisika ebombama, mpo okoka koyeba ete Ngai nazali Yawe, Nzambe ya Isalaele, oyo abengi yo na kombo na yo.
bapaya nyonso oyo bavandaka kuna, bakonzi nyonso ya mokili ya Utsi ; bakonzi nyonso ya mokili ya Filisitia, ya Ashikeloni, ya Gaza, ya Ekroni mpe ya bato oyo batikalaki na Asidodi ;
Bakobotola Kerioti mpe bandako na yango oyo batonga makasi. Na mokolo wana, mitema ya basoda ya mpiko ya Moabi ekokoma lokola motema ya mwasi oyo azali na pasi ya kobota.
Bobimela wuta na bisika nyonso mpo na kobundisa ye, bobuka bibombelo na ye, bokangisa bomengo ya bitumba ndenge bakangisaka maboke ya ble, bobebisa yango nyonso mpe botika ata eloko moko te.
Basoda ya Babiloni batiki kobunda, babombami kati na bandako batonga makasi. Makasi na bango esili, bakomi lokola basi. Bandako ya Babiloni etumbami mpe babuki bikangelo bikuke na yango.
Nkosi ebomi banyama ebele mpo ete epesa yango lokola bilei epai ya bana na yango, ekangi nyama ya kolia mpo na mwasi na yango, bongo etondisi libulu na yango na banyama oyo ebomi mpe na misuni.
Tala malamu mampinga na yo, balemba lokola basi ; bikuke ya mokili na yo ezali polele liboso ya banguna na yo, pamba te moto ezikisi bikangelo na yango.
nakobalola bakiti ya bokonzi, nakosilisa nguya ya bokonzi ya mikili ya bapagano, nakokweyisa bashar mpe bato oyo batambolisaka yango ; bampunda ekokweya elongo na bato oyo batambolaka likolo na yango, bango na bango bakobomana na mopanga.