Jeremi 50:36 - Mokanda na Bomoi36 ‹ Mopanga, boma basakoli na yango ya lokuta ; tika ete bakoma bato ya maboma ! Mopanga, boma basoda na yango ya mpiko ; tika ete bakoma na somo ! အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Kasi nyama ekangamaki elongo na mosakoli ya lokuta oyo azalaki kosala bikamwa na kombo ya nyama. Na nzela ya bikamwa yango, akosaki bato oyo batiamaki elembo ya nyama mpe bagumbamelaki ekeko na yango. Bango mibale : nyama mpe mosakoli ya lokuta, babwakamaki ya bomoi kati na liziba ya moto mpe ya sofolo.