Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 50:33 - Mokanda na Bomoi

33 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Bazali konyokola bana ya Isalaele mpe bato ya Yuda ; bato nyonso oyo bakangaki bango mpe bamemaki bango na bowumbu baboyi kotika bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 50:33
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Faraon azongisaki : — Ye Yawe nde nani mpo ete ngai natosa ye mpe natika Isalaele kokende ? Nayebi ye te mpe nakotika te ete Isalaele akende.


Boye Aron asembolaki loboko na ye na ngambo ya mayi ya Ejipito ; bongo magorodo ebimaki mpe etondisaki mokili ya Ejipito.


Moto oyo azalaki kokomisa mokili esobe, kokweyisa bingumba na yango mpe kotika te ete bakangami na ye bazonga epai na bango ? ›


Nasilikelaki bato na Ngai, nasambwisaki libula na Ngai ; nakabaki bango na maboko na yo, mpe oyokelaki bango mawa te ; bongo omemisaki ata mibange ekangiseli ya kilo makasi.


Nakotia yango na loboko ya banyokoli na yo, oyo balobaki na yo : ‹ Lala na se mpo ete totambola likolo na yo ! › Mpe okomisaki mokongo na yo lokola nzela, lokola balabala mpo ete batambola likolo na yo. »


Tala lolenge ya kokila bilei oyo Ngai nalingaka : kokata minyololo ya masumu, kofungola basinga ya ekangiseli, kopesa bonsomi na mowumbu mpe kobuka ekangiseli nyonso.


Bana na bango ya mibali bakozala lokola na tango ya kala, mpe lingomba na bango ekowumela liboso na Ngai ; nakopesa etumbu na bato nyonso oyo bazali konyokola bango.


Moto nyonso oyo azalaki komona bango azalaki koboma bango, banguna na bango bazalaki koloba : ‹ Tozali na biso na ngambo te, mpo ete basali masumu liboso ya Yawe oyo azali lokola lopango na bango ya bosembo ; liboso ya Yawe, elikya ya batata na bango. ›


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ