Boye Yawe alobaki : « Nakosilisa koboma kati na mokili bato oyo nakelaki ; solo, nakosilisa koboma bato kino na bibwele, na bandeke ya likolo mpe na bikelamu oyo etambolaka na libumu kati na mokili, pamba te nabongoli makanisi na Ngai na ndenge nakelaki bango. »
Kaka na butu yango, nakoleka na Ejipito ; nakoboma bana nyonso ya liboso kati na Ejipito kobanda na bato kino na banyama ; mpe nakosambisa banzambe nyonso ya Ejipito na nzela ya bitumbu. Nazali Yawe.
Nabimisaki moto moko wuta na ngambo ya nor, mpe azali koya, moto moko, wuta na ngambo ya este, oyo abelelaka Kombo na Ngai. Azali konyata bakambi ndenge banyataka potopoto, lokola potopoto ya mabele ya bikeko ya mosali mbeki.
« Tala liloba oyo Yawe alobi epai ya Sirisi, mopakolami na Ye, oyo Yawe asimbi loboko na ye ya mobali mpo na kokweyisa bikolo nyonso liboso na ye mpe kolongola mikaba wuta na baloketo ya bakonzi, mpo na kofungola bikuke liboso na ye mpo ete bikuke yango ekangama te :
Pamba te nakotelemisa mpe nakoyeisa lisanga ya bikolo ya nguya oyo ekowuta na mokili ya nor mpo na kobundisa Babiloni mpe kobotola yango wuta na nor ; makonga na bango ekozala lokola makonga ya basoda ya mpiko, oyo bazangaka koboma te.
Bopelisa basonge ya makonga, bokamata banguba na bino ; pamba te Yawe atindi bakonzi ya Medi mpo ete mokano na Ye ezali ya kobebisa Babiloni. Yawe akozongisa mabe na mabe, akosala yango mpo na Tempelo na Ye.
Bongo likolo, mabele mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango ekoganga na esengo mpo na komona kobebisama ya Babiloni, pamba te babebisi bakobimela na nor mpo na kobundisa yango, » elobi Yawe.
‹ Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakopelisa kanda na Ngai ya makasi na esika oyo, likolo ya bato, ya banyama, ya banzete ya zamba mpe ya mbuma ya mabele : kanda yango ekopela lokola moto, bongo ekokufa te.
« Nakokomisa Yelusalemi liboke ya mabanga oyo ebukana-bukana, ndako ya mbwa ya zamba ; nakobebisa bingumba ya Yuda, bongo moto moko te akovanda lisusu kuna.