26 Bobimela wuta na bisika nyonso mpo na kobundisa ye, bobuka bibombelo na ye, bokangisa bomengo ya bitumba ndenge bakangisaka maboke ya ble, bobebisa yango nyonso mpe botika ata eloko moko te.
Nakopesa yo bomengo oyo babomba na molili, bozwi oyo batia na bisika ebombama, mpo okoka koyeba ete Ngai nazali Yawe, Nzambe ya Isalaele, oyo abengi yo na kombo na yo.
Likolo ya kanda ya Yawe, bato bakovanda lisusu na Babiloni te mpo ete ekobebisama nye. Bato nyonso oyo bakoleka na Babiloni bakokamwa mpe bakozala na somo ya komona bapota na yango nyonso.
Bobetela ye lokito ya bitumba na bangambo nyonso ! Ayei komitika ye moko, mpo ete bandako na ye oyo batonga makasi ekweyi, bamir na ye ebukani : ezali na lolenge oyo nde Yawe azongiseli ye mabe na mabe. Bozongisela ye makambo oyo ye asalaki bikolo mosusu.
Bongo monguna na ngai akomona yango mpe akoyoka soni makasi, ye oyo azalaki koloba na ngai : « Wapi Yawe, Nzambe na yo ? » Miso na ngai ekomona ndenge akokweya mpe ndenge bakonyata ye lokola potopoto ya nzela.
Botala ndeke ya likolo : elonaka nkona te, ebukaka bambuma te, ebombaka bilei te kati na bibombelo ; kasi Tata na bino ya Likolo aleisaka yango. Boni, bozali na motuya te koleka yango ?
Anjelu wana abwakaki mbeli na ye na mabele, abukaki maboke ya bambuma ya vino ya mabele mpe abwakaki yango kati na ekamolelo monene ya kanda ya Nzambe.
Mopanga moko ya minu ezalaki kobima na monoko na Ye mpo na kobeta bikolo. Akokamba yango na lingenda ya ebende mpe akonika bambuma ya vino kati na ekamolelo ya vino ya kanda monene ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso.