Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 50:25 - Mokanda na Bomoi

25 Yawe afungolaki bibundeli na Ye nyonso mpe abimisaki kati na yango bibundeli ya kanda na Ye ; pamba te yango nde mosala oyo Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, asili kosala na mokili ya bato ya Babiloni.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 50:25
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Oleki bato nyonso na kitoko, mpe bibebu na Yo ebimisaka ngolu ; yango wana Nzambe apambola Yo mpo na libela.


Kati na kongenga na Yo, zala molongi, mata na shar na Yo, telema mpo na solo, mpo na komikitisa, mpe mpo na bosembo ; tika ete loboko na Yo ya mobali esala misala minene.


Bakotobola na likonga moto nyonso oyo bakokanga. Bato nyonso oyo bakozwa, bakokufa na mopanga.


Bobetela ye lokito ya bitumba na bangambo nyonso ! Ayei komitika ye moko, mpo ete bandako na ye oyo batonga makasi ekweyi, bamir na ye ebukani : ezali na lolenge oyo nde Yawe azongiseli ye mabe na mabe. Bozongisela ye makambo oyo ye asalaki bikolo mosusu.


Ozalaki solo marto, ebundeli na Ngai ya bitumba : elongo na yo, napanzaki bikolo ; elongo na yo, nabebisaki mikili ;


« Yo ngomba oyo obebisaka, yo oyo obebisaka mokili, nakotelemela yo, » elobi Yawe, « nakosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela yo, nakokitisa yo wuta na likolo ya mabanga, mpe nakokomisa yo ngomba ezika na moto.


Pamba te Yawe akobebisa Babiloni mpe akokanga yango monoko. Lokito ya banguna ekoyokana lokola makelele ya bambonge ya bibale minene ; bongo mingongo ya bato ekoyokana makasi.


Boni, kelelo ya bitumba ekoki solo kobeta kati na engumba, bongo bato bazanga kobanga ? Pasi ekoki solo koya na engumba soki Yawe atindi yango te ?


Yango wana, bitumbu nyonso ekokweyela yango na mokolo moko : kufa, matanga mpe nzala. Ekozikisama na moto, pamba te Nzambe oyo apesi yango etumbu azali Nkolo-Na-Nguya.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ