Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 50:21 - Mokanda na Bomoi

21 Bobundisa mokili ya Meratayimi mpe bavandi ya Pekodi ; bolanda bango, boboma mpe bobebisa bango nye, › elobi Yawe. ‹ Bosala makambo nyonso oyo natindi bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 50:21
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo Davidi alobaki na Abishayi mpe na basali na ye nyonso : « Soki kutu mwana na ngai moko ya mobali oyo abimi na nzoto na ngai azali koluka koboma ngai, bongo ndenge nini moto oyo ya Benjame asala bongo te ! Tika ye alakela ngai mabe, pamba te ezali Yawe nde alobi na ye bongo.


Boni, okanisi ete ngai nayei kobundisa mpe kobebisa esika oyo na ndingisa ya Yawe te ? Ezali Ye moko Yawe nde alobaki na ngai ete nabundisa mokili oyo mpe nabebisa yango. ’ › »


« Tala makambo oyo Sirisi, mokonzi ya Persi, alobi : ‹ Yawe, Nzambe ya Likolo, apesi ngai babokonzi nyonso ya mabele mpe mokumba ya kotongela Ye Tempelo, na Yelusalemi kati na Yuda. Tika ete moto nyonso oyo, kati na bino, azali na molongo ya bato ya Yawe akende ; pamba te Yawe, Nzambe na ye, azali elongo na ye ! › »


Natindi ye mpo ete atelemela ekolo oyo eyebi Yawe te mpe bato oyo bapesaka Ngai kanda, mpo ete abebisa mpe abotola biloko na bango mpe anyata bango lokola potopoto ya balabala.


Nalobi na tina na Sirisi : ‹ Azali mobateli oyo naponi, akokokisa makambo nyonso oyo esepelisaka Ngai. Akoloba na tina na Yelusalemi : ‘ Tika ete etongama lisusu, ’ mpe na tina na Tempelo : ‘ Tika ete batonga miboko na yango. ’ › »


Bino nyonso, boya elongo mpe boyoka : Nzambe nini ya ekeko asakolaki makambo oyo ? Moto oyo Yawe alingaka akokokisa mokano na Ye mpo na Babiloni, mpe loboko na ye ekotelemela bato ya Babiloni.


Ezali Ngai, solo ezali Ngai nde nalobi mpe nabengi ye ; nakoyeisa ye, mpe akolonga na makambo na ye.


Nakopesa bango mitindo, elobi Yawe, mpe nakozongisa bango kati na engumba oyo : bakobundisa yango, bakobotola yango mpe bakobebisa yango na moto. Mpe nakokomisa bingumba ya Yuda esobe, ezanga bavandi. »


Tika ete moto oyo asalelaka Yawe na kozanga komipesa alakelama mabe ! Tika ete moto oyo apelisaka mopanga na ye mpo ete etangisa makila alakelama mabe !


Bobetela ye lokito ya bitumba na bangambo nyonso ! Ayei komitika ye moko, mpo ete bandako na ye oyo batonga makasi ekweyi, bamir na ye ebukani : ezali na lolenge oyo nde Yawe azongiseli ye mabe na mabe. Bozongisela ye makambo oyo ye asalaki bikolo mosusu.


Ekolo moko ekowuta na nor mpe ekobundisa Babiloni, ekobebisa yango, bongo moto moko te akovanda lisusu kuna ; ezala bato to banyama, nyonso ekokima.


Pamba te nakotelemisa mpe nakoyeisa lisanga ya bikolo ya nguya oyo ekowuta na mokili ya nor mpo na kobundisa Babiloni mpe kobotola yango wuta na nor ; makonga na bango ekozala lokola makonga ya basoda ya mpiko, oyo bazangaka koboma te.


mibali ya Babiloni mpe mibali nyonso ya Chalide, ya Pekodi, ya Shoa mpe ya Koa elongo na mibali nyonso ya Asiri, bilenge mibali kitoko. Bango nyonso bazalaki bayangeli mpe bakonzi ya basoda, basoda ya mpiko oyo batambolaka malamu likolo ya bampunda mpe bakonzi ya basoda ya lokumu ; bango nyonso batambolaka likolo ya bampunda.


Nzambe ya tango nyonso azali ekimelo na yo, azali tango nyonso Mosungi awa na se. Ezali Ye nde abenganaka banguna na yo liboso na yo mpe apesaka yo mitindo ya koboma bango.


Kende sik’oyo, bundisa bato ya Amaleki mpe bebisa penza biloko na bango nyonso. Kobatela bango te ; boma mibali mpe basi, bana mpe babebe, bangombe, bantaba mpe bameme, bashamo mpe ba-ane. › »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ